Nzembo 53:1-6
Epai ya mokambi ya nzembo mpo na Mahalate.+ Maskile. Ya Davidi.
53 Zoba alobi na motema na ye ete:“Yehova azali te.”+Babebisi makambo mpe basali makambo na ndenge ya bosɔtɔ na kozanga boyengebene;+Ata moto moko te azali kosala malamu.+
2 Kasi uta na likoló, Nzambe azali kotala bana ya bato,+Mpo na komona soki ezali na moto oyo azali na mayele ya kososola, moto oyo azali koluka Yehova.+
3 Bango nyonso bazongi nsima, bango nyonso mpe babebi;+Ata moto moko te azali kosala malamu,+Ata moko te.
4 Bato nyonso oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bazwi nde boyebi te,+Bazali nde kolya bato na ngai ndenge balyaka limpa?+Babeleli kutu Yehova te.+
5 Kuna batondaki na nsɔmɔ moko monene,+Epai nsɔmɔ ezalaki te;+Mpo Nzambe ye moko akopalanganisa mpenza mikuwa ya moto nyonso oyo azali kotɛlɛmisa kaa mpo na kotɛmɛla yo.+Okoyokisa mpenza bango nsɔni, mpo Yehova ye moko abwaki bango.+
6 Ee lobiko monene ya Yisraele euta na Siona!+Ntango Yehova akozongisa bato na ye oyo bazali bakangami,+Tiká Yakobo azala na esengo, tiká Yisraele asepela.+