Nzembo 51:1-19

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi. Ntango Natane mosakoli akɔtaki epai ya Davidi wana asilaki kosangisa nzoto na Bate-sheba.+ 51  Ee Nzambe, moniselá ngai boboto na kolanda motema boboto na yo.+Longolá misala na ngai ya kobuka mibeko na kolanda motema mawa oyo otondi na yango.+   Sukolá ngai mobimba na libunga na ngai,+Mpe pɛtolá ngai na lisumu na ngai.+   Mpo ngai moko nayebi misala na ngai ya kobuka mibeko,+Mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso.+   Nasaleli yo lisumu, kaka yo moko,+Mpe nasali oyo ezali mabe na miso na yo,+Mpo yo omonana moyengebene ntango ozali koloba,+Mpo yo ozala na libunga te ntango ozali kosambisa.+   Talá! Na libunga nabotamaki na kati ya mpasi,+Mpe na lisumu mama na ngai azwaki zemi na ngai.+   Talá! Yo osepeli na bosolo oyo ezali na kati ya motema;+Mpe na kati na ngai moko osala ete nayeba bwanya mpenza.+   Pɛtolá ngai na izope nalongwa na lisumu, mpo nazala pɛto;+Sukolá ngai, mpo nakóma mpɛmbɛ mingi koleka nɛjɛ.+   Salá ete nayoka nsai makasi mpe esengo,+Mpo mikuwa oyo otuti ezala na esengo.+   Bombá elongi na yo etala masumu na ngai te,+Mpe longolá mabunga na ngai nyonso.+ 10  Ee Nzambe, zalisá motema ya pɛto na kati na ngai,+Mpe tyá kati na ngai elimo ya sika, oyo ezali ngwi.+ 11  Kobwaka ngai mosika na elongi na yo te;+Mpe elimo santu na yo, Ee kolongola ngai yango te.+ 12  Zongiselá ngai esengo ya lobiko na yo,+Mpe sungá ngai na elimo oyo elingaka kotosa.+ 13  Nakoteya bato oyo babukaka mibeko banzela na yo,+Mpo basumuki bázonga mpenza epai na yo.+ 14  Ee Nzambe, bikisá ngai na ngambo ya makila,+ Nzambe ya lobiko na ngai,+Mpo lolemo na ngai eyebisa boyengebene na yo na esengo.+ 15  Ee Yehova, fungolá mbɛbu na ngai,+Mpo monɔkɔ na ngai esakola lisanzoli na yo.+ 16  Mpo yo ozali kosepela na mbeka te​—soki osepelaka na yango, nalingaki kopesa yango;+Yo ozali kosepela te na likabo ya kotumba mobimba.+ 17  Bambeka oyo Nzambe andimaka ezali elimo oyo ebukani;+Ee Nzambe, motema oyo ebukani mpe etutami, okotyola yango te.+ 18  Na bosepeli na yo, salelá Siona malamu;+Tongá bifelo ya Yerusaleme.+ 19  Bongo okosepela na bambeka ya boyengebene,+Na mbeka ya kotumba mpe likabo;+Bongo bangɔmbɛ-mibali ekopesama na etumbelo na yo.+

Maloba na nse