Nzembo 50:1-23

Mondule ya Asafe.+ 50  Nzambe,+ Nzambe, Yehova,+ alobi ye moko,+Mpe abandi kobenga mabele,+Banda epai moi ebimaka kino epai yango elalaka.+   Longwa na Siona, kitoko ya kokoka,+ Nzambe ye moko angɛngi.+   Nzambe na biso akoya mpe akokoka kofanda nyɛɛ te.+Liboso na ye mɔtɔ ezali kozikisa,+Mpe mopɛpɛ moko makasi koleka ezalaki zingazinga na ye.+   Azali kobenga likoló kuna mpe mabele+Mpo na kosambisa bato na ye:+   “Bóyanganisa epai na ngai bato na ngai ya sembo,+Baoyo bazali kosala kondimana na ngai na nzela ya mbeka.”+   Mpe likoló ezali koyebisa boyengebene na ye,+Mpo Nzambe ye moko azali Mosambisi.+ Sela.   “Yoká, Ee ekólo na ngai, mpe nakoloba,+Ee Yisraele, mpe nakotatwela yo.+Ngai nazali Nzambe, Nzambe na yo.+   Nazali kopamela yo mpo na bambeka na yo te,+Mpe mpo na makabo na yo ya kotumba mobimba oyo ezali liboso na ngai ntango nyonso te.+   Nakozwa ngɔmbɛ-mobali na ndako na yo te,+Nakozwa bantaba-mibali na mapango na yo te. 10  Mpo nyama nyonso ya zamba oyo ezali na zamba ezali ya ngai,+Banyama likoló ya bangomba nkóto (1 000).+ 11  Nayebi malamu ekelamu nyonso ya mapapu oyo ezalaka na bangomba,+Mpe ebele ya banyama ya esobe ezali ya ngai.+ 12  Soki nazalaka na nzala, nalingaki koyebisa yo yango te;Mpo mabele oyo ebotaka+ mpe nyonso oyo etondani na kati na yango ezali ya ngai.+ 13  Nakolya nde mosuni ya bangɔmbɛ-mibali ya makasi,+Mpe nakomɛla nde makila ya bantaba-mibali?+ 14  Pesá Nzambe matɔndi, yango nde mbeka na yo,+Mpe kokisá bilako na yo epai ya Oyo-Aleki-Likoló;+ 15  Mpe bengá ngai na mokolo ya mpasi.+Ngai nakobikisa yo, mpe yo okopesa ngai nkembo.”+ 16  Kasi Nzambe akoloba na moto mabe ete:+“Lotomo nini ozali na yango mpo otánga malako na ngai,+Mpe omema kondimana na ngai na monɔkɔ na yo?+ 17  Ɛɛ, yo​—yo oyini disiplini,+Mpe ozali kaka kobwaka maloba na ngai nsima na yo.+ 18  Ntango nyonso oyo omonaki moyibi, ozalaki kutu kosepela na ye;+Mpe osalaki boninga na bato ya ekobo.+ 19  Ofungoli monɔkɔ na yo polele mpo na kobimisa makambo ya mabe,+Mpe ozali kaka kokangisa lolemo na yo na bokosi.+ 20  Ozali kofanda mpe ozali koloba mabe na ndeko na yo mpenza,+Ozali kobimisa libunga ya mwana mobali ya mama na yo.+ 21  Makambo wana osali yango, mpe ngai nafandaki kaka nyɛɛ.+Okanisaki ete ngai nakokóma mpenza lokola yo.+Nakopamela yo,+ mpe nakotya makambo na molɔngɔ na miso na yo.+ 22  Nabondeli bino, bókanga ntina ya likambo oyo, bino baoyo bobosanaka Nzambe,+Noki napasolapasola bino mpe moto oyo akobikisa bino akozala te.+ 23  Moto oyo azali kopesa matɔndi mpo ezala mbeka na ye, ye nde moto azali kopesa ngai nkembo;+Mpe moto oyo azali kolanda nzela oyo etyami,Ngai nakomonisa ye lobiko ya Nzambe.”+

Maloba na nse