Nzembo 49:1-20
Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora.+ Mondule.
49 Bino nyonso bato ya bikólo, bóyoka likambo oyo.Bino nyonso bato ya ntango oyo,+ bótya litoi,
2 Bino bato nyonso,*Yo mozwi ná yo mobola elongo.+
3 Monɔkɔ na ngai ekoloba makambo ya bwanya,+Mpe komanyola ya motema na ngai ekozala na makambo ya mayele.+
4 Nakosembola litoi na ngai na liloba ya lisese;+Nakolimbola sambole+ na ngai na kobɛtáká nzɛnzɛ.
5 Mpo na nini nabanga na mikolo ya mabe,+Ntango libunga ya baoyo balingi kokweisa ngai ezali kozinga ngai?+
6 Baoyo bazali kotya motema na biloko na bango ya kobikela,+Mpe baoyo bazali kaka komikumisa mpo na ebele ya bomɛngo na bango,+
7 Moko na bango akoki kosikola ndeko na ye ata moke te,+To kopesa Nzambe lisiko mpo na ye;
8 (Mpe ntalo ya lisiko ya molimo na bango ezali motuya moko monene mpenza+Yango wana ezangá mpo na ntango oyo etyami ndelo te)
9 Mpo azala lisusu na bomoi seko mpe amona libulu te.+
10 Mpo amonaka ete ata bato ya bwanya bakufaka,+Zoba ná moto oyo azangi mayele bango nyonso bakufaka,+Mpe basengeli kotikela bato mosusu biloko na bango ya kobikela.+
11 Mposa ya motema na bango ezali ete bandako na bango ezala mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+Batabernakle na bango libota na libota.+Bapesi mabele na bango bankombo na bango.+
12 Nzokande moto ya mabele, ata azali na lokumu, akoki te kofanda libela;+Azali mpenza lokola banyama oyo ebomami.+
13 Yango nde nzela ya baoyo bazali na bozoba,+Mpe ya baoyo bazali koya nsima na bango, baoyo bazali kosepela na maloba na bango ya mangungu. Sela.
14 Lokola bampate, babongisami mpo na Nkunda;*+Liwa ekokamba bango;+Mpe bato ya makambo alima bakozala na bokonzi likoló na bango na ntɔngɔ,+Mpe nzoto na bango esengeli konzuluka;+Mokomoko azali kokende na esika ya kofanda ya lokumu te, kasi nde na Nkunda.*+
15 Nzokande, Nzambe ye moko akosikola molimo na ngai na lobɔkɔ ya Nkunda,*+Mpo ye akoyamba ngai. Sela.
16 Kobanga te mpo moto moko boye azali kozwa bomɛngo,+Mpo nkembo ya ndako na ye ezali komata,+
17 Mpo na liwa na ye, akomema eloko ata moko te;+Nkembo na ye ekokita elongo na ye te.+
18 Mpo bomoi na ye mobimba azalaki kaka kopambola molimo na ye;+(Mpe bato bakokumisa yo mpo ozali komisalela malamu)+
19 Nsukansuka, molimo na ye ekokende kosuka kaka na libota ya bankɔkɔ na ye.+Bakomona pole lisusu ata moke te.+
20 Moto ya mabele oyo azali kokanga ntina te, ata azali na lokumu,+Azali mpenza lokola banyama oyo ebomami.+
Maloba na nse
^ Lil., “Bino bana ya bato ná bino bana ya moto.”
^ To, “Sheole.” Talá Ap 4.
^ To, “Sheole.” Talá Ap 4.
^ To, “Sheole.” Talá Ap 4.