Nzembo 47:1-9

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora. Mondule. 47  Bino nyonso bato ya bikólo, bóbɛta mabɔkɔ.+Bóganga mpo na Nzambe na koganga ya bolongi, na lokito ya koganga ya esengo.+   Mpo Yehova, Oyo-Aleki-Likoló, azali nsɔmɔ,+Mokonzi monene na mabele mobimba.+   Akotya bato ya bikólo na nse na biso+Mpe bituluku ya bato ya bikólo na nse ya makolo na biso.+   Akoponela biso libula na biso,+Lolendo ya Yakobo, oyo ye alingi.+ Sela.   Nzambe amati na koganga ya esengo,+Yehova amati na lokito ya liseke.+   Bóbɛtɛla Nzambe mondule, bóbɛta mondule.+Bóbɛtɛla Mokonzi na biso mondule, bóbɛta mondule.   Mpo Nzambe azali Mokonzi ya mabele mobimba;+Bóbɛta mondule, bósala na bokɛngi.+   Nzambe akómi mokonzi ya bikólo.+Nzambe afandi na kiti mosantu ya bokonzi na ye.+   Bato ya lokumu na kati ya bato ya bikólo bayangani,+Ná bato ya Nzambe ya Abrahama.+Mpo banguba ya mabele ezali ya Nzambe.+Ye amati na esika ya likoló mingi mpenza.+

Maloba na nse