Nzembo 46:1-11

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora+ mpo na Bilenge basi. Loyembo. 46  Nzambe azali ekimelo mpe bokasi na biso,+Lisalisi oyo ezwamaka noki na bantango ya mpasi.+   Yango wana tokobanga te, ata soki mabele ezali kobongwana+Mpe ata soki bangomba ezali kotengatenga na kati mpenza ya mbu monene;+   Ata soki mai na yango ezali yikiyiki, ezali kobimisa fulufulu,+Ata soki bangomba ezali kolɛnga na yikiyiki na yango.+ Sela.   Ezali na ebale moko oyo mikɛli na yango esepelisaka engumba ya Nzambe,+Tabernakle monene, oyo eleki bosantu, ya Oyo-Aleki-Likoló.+   Nzambe azali na katikati ya engumba yango;+ ekotengatenga te.+Nzambe akosalisa yango ntango ntɔngɔ ekotana.+   Bikólo ekómaki yikiyiki,+ makonzi ekómaki kotengatenga;Ayokisaki mongongo na ye, mabele ebandaki konyangwa.+   Yehova ya mampinga azali elongo na biso;+Nzambe ya Yakobo azali esika na biso ya kobombana oyo etombwaná.+ Sela.   Bóya, bótala misala ya Yehova,+Ndenge atye makambo ya kokamwisa na mabele.+   Ye azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele.+Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga;+Azali kotumba makalo na mɔtɔ.+ 10  “Bótika mpe bóyeba ete ngai nazali Nzambe.+Nakotombwama na kati ya bikólo,+Nakotombwama na mabele.”+ 11  Yehova ya mampinga azali elongo na biso;+Nzambe ya Yakobo azali esika na biso ya kobombana oyo etombwaná.+ Sela.

Maloba na nse