Nzembo 45:1-17

Epai ya mokambi ya nzembo ya Bafololo lísi. Ya bana ya Kora. Maskile. Loyembo ya basi ya bolingo. 45  Motema na ngai ekómi koningana mpo na likambo moko ya malamu.+Nazali koloba ete: “Misala na ngai etali mokonzi moko.”+Lolemo na ngai ezala ekomeli+ ya mosali-bakopi oyo ayebi mosala malamu.+   Ozali mpenza kitoko mingi koleka bana ya bato.+Mbɛbu na yo ezali kosopa maloba ya elɛngi.+Yango wana Nzambe apamboli yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+   Ee moto ya nguya,+ kangá mopanga+ na yo na loketo, na ebɛlɔ na yo,Ná lokumu na yo mpe nkembo na yo.+   Mpe na nkembo na yo kende kolonga;+Matá na mpunda mpo na kobundela solo, komikitisa ná boyengebene,+Mpe lobɔkɔ na yo ya mobali ekoteya yo makambo ya nsɔmɔ.+   Makula na yo epeli makasi, ekokɔta na motema ya banguna ya mokonzi,+Bato ya bikólo bazali kaka kokwea na nse na yo.+   Nzambe azali kiti na yo ya bokonzi mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko;+Lingenda ya bokonzi na yo ezali lingenda ya bosembo.+   Olingi boyengebene+ mpe oyini makambo ya mabe.+Yango wana Nzambe, Nzambe na yo,+ atye yo mafuta+ ya esengo+ koleka baninga na yo.+   Bilamba na yo nyonso ezali malasi ya mire, nzete ya aloe ná kasia;+Longwa na ndako monene ya kitoko, ya mpɛmbɛ ya nzoku,+ bibɛtɛlo oyo ya bansinga esepelisi yo.   Bana basi+ ya bakonzi bazali na kati ya basi na yo ya bolingo.Mwasi ya mokonzi+ atɛlɛmi na lobɔkɔ na yo ya mobali, alati wolo ya Ofire.+ 10  Yoká, Ee mwana mwasi, mpe talá, mpe sembolá litoi na yo;Mpe bosaná bato na yo mpe ndako ya tata na yo.+ 11  Mpe mokonzi akoyoka kitoko na yo mposa,+Mpo ye azali nkolo na yo,+Na yango, gumbamelá ye.+ 12  Mwana mwasi ya Tire azali wana mpe na likabo+—​Bato ya bozwi na kati ya bato bakokitisa yo motema.+ 13  Mwana mwasi ya mokonzi azali na nkembo mingi na kati ya ndako;+Bilamba na ye etyami biloko ya wolo. 14  Bakoya na ye epai ya mokonzi na molato oyo elitamá.+Bangɔndɔ oyo bazali baninga na ye, oyo bazali kolanda ye na nsima, bazali kokɔtisama epai na yo.+ 15  Bakoya na bango na nsai mpe na esengo;Bakokɔta na ndako monene ya mokonzi. 16  Na esika ya bankɔkɔ na yo+ ekozala bana na yo,+Oyo okotya bango bankumu na mabele mobimba.+ 17  Nakotánga nkombo na yo na boumeli ya mabota nyonso oyo ekoya.+Yango wana bato ya bikólo bakokumisa yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.

Maloba na nse