Nzembo 42:1-11
Epai ya mokambi ya nzembo. Maskile mpo na bana ya Kora.+
42 Lokola nyama ebengami bishe oyo ezali na mposa makasi ya mikɛli ya mai,Molimo na ngai ezali na mposa na yo makasi, Ee Nzambe.+
2 Molimo na ngai ezali mpenza na mposa ya Nzambe,+ ya Nzambe ya bomoi.+Ntango nini nakoya mpe komonana liboso ya Nzambe?+
3 Mpisoli na ngai ekómi bilei na ngai butu moi,+Wana bazali koloba na ngai mokolo mobimba ete: “Nzambe na yo azali wapi?”+
4 Nakokanisa makambo oyo, mpe nakosopa molimo na ngai na kati na ngai.+Mpo namesanaki koleka elongo na ebele ya bato,Namesanaki kotambola malɛmbɛ liboso na bango mpo na kokende na ndako ya Nzambe,+Na mongongo ya koganga ya esengo mpe na matɔndi,+Ya ebele ya bato oyo bazali kosala fɛti.+
5 Ee molimo na ngai, mpo na nini ozangi elikya,+Mpo na nini ozali kosala yikiyiki na kati na ngai?+Zelá Nzambe,+Mpo nakokumisa ye lisusu, azali lobiko monene na ngai.+
6 Ee Nzambe na ngai, na kati na ngai molimo na ngai ezangi elikya.+Yango wana nazali kokanisa yo,+Banda na mokili ya Yordani mpe na bansɔngɛ ya Heremone,+Banda na ngomba moke.+
7 Mai mozindo ezali kobenga mai mozindoNa lokito ya mai na yo oyo ezali komibwaka.Mbonge na yo nyonso ya makasi oyo epanzanaka mpe mbonge na yo+—Eleki likoló na ngai.+
8 Na moi Yehova akopesa motema boboto na ye mitindo,+Mpe na butu loyembo na ye ekozala elongo na ngai;+Libondeli ekopesama epai ya Nzambe ya bomoi na ngai.+
9 Nakoloba na Nzambe libanga na ngai+ ete:“Mpo na nini obosani ngai?+Mpo na nini nazali kotambola mawamawa mpo na monyoko ya monguna?”+
10 Baoyo bazali banguna na ngai basambwisi ngai na ndenge babomi mikuwa na ngai,+Wana bazali koloba na ngai mokolo mobimba ete: “Nzambe na yo azali wapi?”+
11 Ee molimo na ngai, mpo na nini ozangi elikya,+Mpe mpo na nini ozali kosala yikiyiki na kati na ngai?+Zelá Nzambe,+Mpo nakokumisa ye lisusu, azali lobiko monene na ngai mpe azali Nzambe na ngai.+