Nzembo 4:1-8

Epai ya mokambi ya nzembo na bibɛtɛlo ya bansinga.+ Mondule ya Davidi. 4  Ee Nzambe na ngai ya boyengebene,+ ntango nazali kobenga, yanolá ngai.Na ntango ya mpasi osengeli kobongisela ngai esika monene.Moniselá ngai boboto+ mpe yoká libondeli na ngai.   Bino bana ya bato, kino ntango nini nkembo+ na ngai ekofingama,Awa bozali kaka kolinga makambo mpamba,Awa bozali kaka koluka lokuta? Sela.   Bongo bóyeba ete Yehova akomonisela mpenza moto na ye ya sembo boboto;+Yehova ye moko akoyoka ntango nakobenga ye.+   Ata soki bosiliki, bósala lisumu te.+Bóloba na motema na bino, na mbeto+ na bino, mpe bófanda nyɛɛ. Sela.   Bópesa bambeka ya boyengebene,+Mpe bótyela Yehova motema.+   Mingi bazali koloba: “Nani akomonisa biso bolamu?”Moniselá biso pole ya elongi na yo,+ Ee Yehova.   Okopesa mpenza motema na ngai esengo+Esengo ya monene koleka ntango oyo milona na bango mpe vinyo na bango ya sika etondanaki.+   Nakomilalisa mpe nakolala mpɔngi na kimya,+Mpo kaka yo moko, Ee Yehova, nde ozali kofandisa ngai na kimya.+

Maloba na nse