Nzembo 39:1-13
Epai ya mokambi ya nzembo ya Yedutune.+ Mondule ya Davidi.
39 Nalobaki ete: “Nakobatela banzela na ngai+Mpo nasala lisumu te na lolemo na ngai.+Nakotya eloko ya kokanga monɔkɔ mpo ekɛngɛla monɔkɔ na ngai,+Ntango nyonso oyo moto mabe akozala liboso na ngai.”+
2 Nakómaki moto oyo alobaka te mpo nafandaki nyɛɛ;+Nafandaki kimya liboso ya oyo ezali malamu,+Mpe mpasi na ngai etyamaki pembeni.
3 Motema na ngai ekómaki mɔtɔ na kati na ngai;+Na ntango oyo nazalaki kokimela, mɔtɔ ezalaki kaka kopela.Nalobaki na lolemo na ngai ete:
4 “Ee Yehova, salá ete nayeba nsuka na ngai,+Mpe motángo ya mikolo na ngai—ndenge ezali,+Mpo nayeba ete nazali na bomoi mokuse.+
5 Talá! Osali mikolo na ngai kaka moke;+Mpe mikolo ya bomoi na ngai ezali eloko te liboso na yo.+Ya solo moto nyonso ya mabele, ata atɛlɛmi ngwi, azali kaka mwa mopɛpɛ.+ Sela.
6 Ya solo moto azali kotambola epai na epai lokola elili mpamba.+Ya solo bazali yikiyiki kaka mpamba.+Moto azali konduka biloko mpe azali koyeba te nani akotikala na yango.+
7 Mpe sikoyo, Ee Yehova, natye elikya na eloko nini?Eloko oyo nazali kozela ezali epai na yo.+
8 Bikisá ngai na misala na ngai nyonso ya kobuka mibeko.+Kotya ngai te lokola eloko ya nsɔni ya moto ya bozoba.+
9 Nazalaki koloba te;+ nakokaki kofungola monɔkɔ na ngai te,+Mpo yo moko osalaki mosala.+
10 Longolelá ngai bolɔzi na yo.+Nakómi na nsuka mpo na bonguna ya lobɔkɔ na yo.+
11 Na mpamela oyo opesi moto mpo na libunga na ye, osemboli ye,+Mpe olyaka biloko na ye ya kitoko kaka ndenge ndɔngɛ+ elyaka.Ya solo moto ya mabele azali kaka mwa mopɛpɛ.+ Sela.
12 Ee Yehova, yoká libondeli na ngai,Mpe tyá litoi na kolela na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.+Kofanda nyɛɛ te liboso ya mpisoli na ngai.+Mpo nazali kaka moto oyo afandi mopaya epai na yo,+Moto oyo autá na mboka mosusu ndenge moko na bankɔkɔ na ngai nyonso.+
13 Longolá miso na yo epai na ngai, mpo nafungola elongi+Liboso ete nalongwa mpe nazala te.”+