Nzembo 37:1-40

Ya Davidi. א [ʼAlef] 37  Kosilika te mpo na basali-mabe.+Kolula te baoyo basalaka makambo ya kozanga boyengebene.+   Mpo bakokauka nokinoki lokola matiti,+Mpe bakokauka lokola matiti ya sika ya mobesu.+ ב [Bet]   Tyelá Yehova motema mpe salá malamu;+Fandá na mabele, mpe salá makambo na bosembo.+   Lisusu sepelá mingi mpenza na Yehova,+Mpe akopesa yo oyo motema na yo ezali kosɛnga.+ ג [Gimel]   Tikelá Yehova nzela na yo,+Mpe talelá ye,+ mpe ye moko akosala.+   Mpe akobimisa mpenza boyengebene na yo lokola pole,+Mpe bosembo na yo lokola na ntango ya midi.+ ד [Dalet]   Fandá nyɛɛ liboso ya Yehova+Mpe zelá ye na mposa makasi.+Kosilika te mpo na moto oyo azali kolongisa nzela na ye,+Mpo na moto oyo azali kokokisa makanisi na ye.+ ה [Heʼ]   Tiká nkanda, mpe tiká kotomboka;+Kosilika te kaka mpo na kosala mabe.+   Mpo basali-mabe bakobomama,+Kasi bato oyo balikyaka na Yehova nde bakozwa mabele.+ ו [Waw] 10  Mpe etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te;+Mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te.+ 11  Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele,+Mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.+ ז [Zayin] 12  Moto mabe azali kosalela moyengebene likita,+Mpe azali kolyela ye mino.+ 13  Yehova ye moko akosɛka ye,+Mpo azali mpenza komona ete mokolo na ye ekoya.+ ח [Het] 14  Bato mabe babendi mopanga mpe bagumbi litimbo na bango,+Mpo na kokweisa moto ya mpasi mpe mobola,+Mpo na koboma baoyo bazali makambo alima na nzela na bango.+ 15  Mopanga na bango ekokɔta na motema na bango,+Mpe matimbo na bango ekobukana.+ ט [Tet] 16  Biloko moke ya moyengebene ezali malamu+Koleka ebele ya biloko ya bato mingi ya mabe.+ 17  Mpo mabɔkɔ ya bato mabe ekobukana,+Kasi Yehova akosunga bayengebene.+ י [Yod] 18  Yehova ayebi mikolo ya bato oyo bazangi mbeba,+Mpe libula na bango ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ 19  Bakoyoka nsɔni te na ntango ya likama,+Mpe na mikolo ya nzala bakotonda.+ כ [Kaf] 20  Mpo bato mabe bakokufa,+Mpe banguna ya Yehova bakozala lokola biloko ya kitoko na bisika ya koleisa banyama matiti;Bakosila mpenza.+ Bakosila mpenza lokola molinga.+ ל [Lamed] 21  Moto mabe adefaka mpe azongisaka te,+Kasi moyengebene amonisaka boboto mpe apesaka makabo.+ 22  Mpo baoyo ye apamboli bakozwa mabele,+Kasi baoyo ye alakeli mabe bakobomama.+ מ [Mem] 23  Yehova atɛlɛmisaka ngwi makolo ya mobali makasi,+Mpe Ye asepelaka na nzela na ye.+ 24  Ata soki akwei, akobwakama na nse te,+Mpo Yehova azali kosimba lobɔkɔ na ye.+ נ [Nun] 25  Nazalaki elenge, nakómi mpe mobange,+Kasi namoná naino te moyengebene asundolami mpenza,+To bana na ye bazali koluka limpa.+ 26  Mokolo mobimba azali komonisa boboto mpe azali kodefisa,+Bongo bana na ye bakozwa lipamboli.+ ס [Samek] 27  Tiká mabe mpe salá oyo ezali malamu,+Bongo ofanda mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ 28  Mpo Yehova alingaka bosembo,+Mpe akotika te bato na ye ya sembo.+ע [ʽAyin] Bakobatelama mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te;+Kasi bana ya bato mabe, bakobomama mpenza.+ 29  Bayengebene bakozwa mabele,+Mpe bakofanda wana seko.+ פ [Peʼ] 30  Monɔkɔ ya moyengebene nde ebimisaka bwanya na mongongo ya nse,+Mpe lolemo na ye nde elobaka na bosembo.+ 31  Mobeko ya Nzambe na ye ezali na motema na ye;+Makolo na ye ekolɛngalɛnga te.+ צ [Tsade] 32  Moto mabe azali kaka kotalatala moyengebene+Mpe azali koluka koboma ye.+ 33  Kasi Yehova, akotika ye te na lobɔkɔ ya moto mabe yango,+Mpe akotánga ye moto mabe te ntango azali kosambisama.+ ק [Kof] 34  Tyelá Yehova elikya mpe batelá nzela na ye,+Mpe ye akotombola yo mpo na kozwa mabele.+Ntango bato mabe bakobomama, yo okomona yango.+ ר [Resh] 35  Namoni moto mabe oyo azali monyokoli+Mpe azali komitanda lokola nzete oyo etondi na nkasa na mabele esika yango ebotamaki.+ 36  Nzokande alimwaki, mpe talá azalaki te;+Mpe nazalaki kaka koluka ye, kasi amonanaki te.+ ש [Shin] 37  Talá moto oyo azangi mbeba mpe kobá kotala moto ya makambo alima,+Mpo bomoi ya moto yango na mikolo ezali koya, ekozala na kimya.+ 38  Kasi bato oyo babukaka mibeko bakosila mpenza bango nyonso nyɛɛ;+Bomoi ya bato mabe na mikolo ezali koya ekolongolama mpenza.+ ת [Taw] 39  Mpe lobiko ya bayengebene euti na Yehova;+Ye azali ndako na bango ya makasi na ntango ya mpasi.+ 40  Mpe Yehova akosalisa bango mpe akobikisa bango.+Akobikisa bango na mabɔkɔ ya bato mabe mpe akobikisa bango,+Mpo bakimi epai na ye.+

Maloba na nse