Nzembo 36:1-12

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya mosaleli ya Yehova, Davidi. 36  Liloba ya kobuka mibeko ezali na kati ya motema ya moto mabe;+Nsɔmɔ ya Nzambe ezali liboso ya miso na ye te.+   Lokola azali komibondela mingi na miso na ye moko+Azali komona libunga na ye te mpo ayina yango.+   Maloba ya monɔkɔ na ye ezali makambo oyo eyokisaka mpasi mpe ezali bokosi;+Atiki kozala na mayele ya kososola mpo na kosala malamu.+   Na mbeto na ye, azali ntango nyonso kokana kosala makambo oyo eyokisaka mpasi.+Atɛlɛmaka na nzela oyo ezali malamu te.+Aboyaka te oyo ezali mabe.+   Ee Yehova, motema boboto na yo ezali na likoló;+Bosembo na yo ezali tii na mapata.+   Boyengebene na yo ezali lokola bangomba ya Nzambe;+Ekateli na yo ya lisambisi ezali mai mozindo ya monene.+Ee Yehova, obikisaka moto ná nyama.+   Ee Nzambe, motema boboto na yo ezali mpenza kitoko!+Mpe bana ya bato bazali kokima na elili ya mapapu na yo.+   Bazali komɛla mpe kotonda mafuta ya ndako na yo;+Mpe ozali komɛlisa bango mai ya mikɛli ya bisengo na yo.+   Mpo liziba ya bomoi ezali epai na yo;+Na pole oyo ezali kouta epai na yo, tokoki komona pole.+ 10  Kobá komonisela baoyo bayebi yo motema boboto na yo,+Mpe boyengebene na yo, baoyo bazali na motema sembo.+ 11  Ee lokolo ya lolendo eyela ngai te;+Lobɔkɔ ya bato mabe ekómisa ngai moto ya koyengayenga te.+ 12  Kuna bato oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bakwei;+Bakweisami mpe bakoki kotɛlɛma te.+

Maloba na nse