Nzembo 35:1-28
Ya Davidi.
35 Ee Yehova, sambá likambo na ngai na baoyo nazali kosamba na bango;+Bundá na baoyo bazali kobunda na ngai.+
2 Simbá nguba ya moke mpe nguba ya monene,+Mpe tɛlɛmá mpo na kosunga ngai,+
3 Mpe bendá likɔnga ná sóka ya mitó mibale mpo na kokutana na baoyo bazali kolanda ngai.+Lobá na molimo na ngai ete: “Ngai nazali lobiko na yo.”+
4 Bato oyo bazali kolukaluka molimo na ngai báyoka nsɔni mpe básambwa.+Bato oyo bazali kokana ete likama ezwa ngai bázonga nsima mpe bábulungana.+
5 Bákóma lokola mposo ya blé liboso ya mopɛpɛ,+Mpe anzelu ya Yehova abengana bango.+
6 Nzela na bango ekóma molili mpe bisika ya mosɛlu,+Mpe anzelu ya Yehova alanda bango.
7 Mpo kaka mpamba babombi libulu na bango oyo batyeli ngai monyama;+Kaka mpamba batimoli yango mpo na molimo na ngai.+
8 Libebi ekwela ye kozanga ete ayeba,+Mpe monyama na ye moko oyo abombaki ekanga ye;+Akwea na kati na yango mpe akufa.+
9 Kasi molimo na ngai ezala na esengo na Yehova;+Esepela na lobiko na ye.+
10 Mikuwa na ngai nyonso eloba ete:+“Ee Yehova, nani azali lokola yo,+Yo oyo obikisaka moto ya mpasi na mabɔkɔ ya moto oyo aleki ye na makasi,+Mpe moto ya mpasi mpe mobola na mabɔkɔ ya moto oyo azali koyiba ye?”+
11 Batatoli ya mobulu bazali kotɛlɛma;+Bazali kotuna ngai makambo oyo nayebi te.+
12 Bazali kozongisela ngai mabe mpo na malamu,+Molimo na ngai etikali mpamba.+
13 Nzokande ngai, ntango bakómaki na maladi, elamba na ngai ezalaki ngɔtɔ,+Nayokisaki molimo na ngai mpasi na kokila bilei,+Mpe libondeli na ngai ezalaki kozonga na ntolo na ngai.+
14 Mpo na moninga, mpo na ndeko na ngai,+Nazalaki kotambola epai na epai lokola moto oyo azali kolela ebembe ya mama na ye.+Nagumbamaki wana nazalaki na mawa.
15 Kasi ntango nazalaki kotɛnguma, basepelaki mpe bayanganaki;+Bayanganaki mpo na kotɛmɛla ngai,+Bazalaki kobɛta ngai wana nayebaki te;+Bapasolaki ngai ndambondambo mpe bafandaki nyɛɛ te.+
16 Kati na bapɛngwi oyo bazali kosɛka mpo na gato+Balyelaki ngai mino na bango.+
17 Ee Yehova, kino ntango nini okotala likambo yango?+Longolá molimo na ngai na misala na bango ya kobebisa,+Ɛɛ molimo na ngai kaka moko+ elongwa na bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.
18 Nakokumisa yo na kati ya lisangá monene;+Nakosanzola yo na kati ya bato ebele.+
19 Ee baoyo bazali banguna na ngai kaka mpamba básepela te mpo na ngai;+Baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba bábwɛta liso te.+
20 Mpo bazali koloba makambo ya kimya te;+Kasi mpo na kotɛmɛla bato ya kimya na mabeleBazali kaka kokana kosala makambo ya bokosi.+
21 Mpe bazali kofungolela ngai monɔkɔ na bango polele.+Balobi: “Aha! Aha! liso na biso emoni yango.”+
22 Ee Yehova, yo omoni.+ Kofanda nyɛɛ te.+Ee Yehova, kozala mosika na ngai te.+
23 Longwá na mpɔngi mpe lamuká mpo na lisambisi na ngai,+Ee Nzambe na ngai, ɛɛ Yehova, mpo na likambo na ngai ya kosamba.+
24 Ee Yehova Nzambe na ngai, sambisá ngai na kolanda boyengebene na yo,+Mpe básepela te likoló na ngai.+
25 Ee báloba te na motema na bango ete: “Aha, molimo na biso!”+Báloba te ete: “Tomɛli ye.”+
26 Báyoka nsɔni mpe básambwa bango nyonso+Baoyo bazali koyoka esengo mpo na likama na ngai.+Bálata nsɔni+ mpe kosambwa, baoyo bazali kotombwela ngai mapeka.+
27 Báganga na esengo mpe básepela, baoyo bazali kosepela na boyengebene na ngai,+Mpe bango báloba ntango nyonso ete:+“Yehova akumisama, ye oyo asepelaka na kimya ya mosaleli na ye.”+
28 Mpe lolemo na ngai elobela boyengebene na yo na mongongo ya nse,+Lisanzoli na yo mokolo mobimba.+