Nzembo 34:1-22

Ya Davidi, na ntango oyo akosaki ete azali na ligboma+ liboso ya Abimeleke, bongo Abimeleke abenganaki ye, mpe akendaki. א [ʼAlef] 34  Nakopambola Yehova ntango nyonso;+Ntango nyonso lisanzoli na ye ekozala na monɔkɔ na ngai.+ ב [Bet]   Molimo na ngai ekomikumisa na Yehova;+Bato ya komikitisa bakoyoka mpe bakosepela.+ ג [Gimel]   Ee bókumisa Yehova elongo na ngai,+Mpe tótombola nkombo na ye elongo.+ ד [Dalet]   Natunaki Yehova, mpe ayanolaki ngai,+Mpe abikisaki ngai na makambo nyonso oyo ezalaki kopesa ngai nsɔmɔ.+ ה [Heʼ]   Batalaki ye mpe bakómaki na esengo,+Mpe bilongi na bango ekokaki koyoka nsɔni ata moke te.+ ז [Zayin]   Moto oyo ya mpasi abelelaki, mpe Yehova ye moko ayokaki.+Mpe Ye abikisaki ye na bampasi na ye nyonso.+ ח [Het]   Anzelu ya Yehova atɛlɛmaka penepene* na baoyo babangaka ye,+Mpe abikisaka bango.+ ט [Tet]   Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu;+Esengo na mobali makasi oyo azali kokima epai na ye.+ י [Yod]   Bóbanga Yehova, bino basantu na ye,+Mpo baoyo babangaka ye bazangaka eloko te.+ כ [Kaf] 10  Bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki bazangaka mpe eloko mpe bayokaka nzala;+Kasi baoyo balukaka Yehova, bakozanga eloko ya malamu te.+ ל [Lamed] 11  Bóya, bino bana, bóyoka ngai;+Nakoteya bino kobanga Yehova.+ מ [Mem] 12  Nani moto oyo azali kosepela na bomoi,+Oyo alingi koumela mikolo mingi mpo na komona oyo ezali malamu?+ נ [Nun] 13  Batelá lolemo na yo eloba makambo ya mabe te,+Mpe mbɛbu na yo eloba makambo ya bokosi te.+ ס [Samek] 14  Tiká oyo ezali mabe, mpe salá oyo ezali malamu;+Luká kozwa kimya, mpe landá yango.+ ע [ʽAyin] 15  Miso ya Yehova ezali epai ya bayengebene,+Mpe matoi na ye ezali koyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.+ פ [Peʼ] 16  Elongi ya Yehova ezali kotɛmɛla baoyo basalaka oyo ezali mabe,+Mpo na kolongola nkombo na bango na mabele.+ צ [Tsade] 17  Bagangaki, mpe Yehova ye moko ayokaki,+Mpe abikisaki bango na bampasi na bango nyonso.+ ק [Kof] 18  Yehova azali pene na baoyo motema ebukani;+Mpe abikisaka baoyo elimo etutami.+ ר [Resh] 19  Bampasi ya moyengebene ezali mingi,+Kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso.+ ש [Shin] 20  Azali kobatela mikuwa nyonso ya moto yango;Moko na yango ebukani te.+ ת [Taw] 21  Likama ekoboma moto mabe;+Mpe bato oyo bazali koyina moyengebene bakomema ngambo.+ 22  Yehova asikolaka molimo ya basaleli na ye;+Mpe moko te kati na baoyo bazali kokima epai na ye akomema ngambo.+

Maloba na nse

Lil., “Atyaka kaa zingazinga.”