Nzembo 33:1-22

33  Bóganga na esengo, Ee bino bayengebene, mpo na Yehova.+Lisanzoli ebongi na bato ya makambo alima.+   Bópesa Yehova matɔndi na nzɛnzɛ;+Bóbɛtɛla ye mondule na ebɛtɛlo ya nsinga zomi.+   Bóyembela ye loyembo ya sika;+Bósala nyonso oyo ekoki mpo na kobɛta nsinga mpe koganga na esengo.+   Mpo liloba ya Yehova ezali sembo,+Mpe mosala na ye nyonso esalemi na bosembo.+   Ye alingaka boyengebene mpe bosembo.+Mabele etondi na motema boboto ya Yehova.+   Likoló esalemaki na liloba ya Yehova,+Mpe limpinga na yango mobimba na elimo ya monɔkɔ na ye.+   Ye azali koyanganisa mai ya mbu lokola na nduka,+Azali kotya mai oyo etomboki na bandako ya kobomba biloko.   Bato nyonso ya mabele bábanga Yehova.+Bato nyonso oyo bafandi na mabele oyo ebotaka bázala na nsɔmɔ.+   Mpo ye moko alobaki, mpe yango esalemaki;+Ye moko apesaki mitindo, mpe yango etɛlɛmaki bongo.+ 10  Yehova ye moko abebisi mokano ya bikólo;+Abebisi makanisi ya bato ya bikólo.+ 11  Mokano mpenza ya Yehova ekotɛlɛma+ mpo na ntango oyo etyami ndelo te;Makanisi ya motema na ye ezali mpo na libota na libota.+ 12  Esengo na ekólo oyo Yehova azali Nzambe na yango,+Bato oyo ye aponi bázala libula na ye.+ 13  Uta na likoló Yehova atali,+Amoni bana nyonso ya bato.+ 14  Uta na esika ya libela epai afandaka+Atalitali baoyo nyonso bazali kofanda na mabele. 15  Azali kobongisa mitema na bango nyonso;+Azali kotalela misala na bango nyonso.+ 16  Ezali na mokonzi moko te oyo abikisami na nzela ya mampinga ya basoda mingi;+Moto ya nguya abikisami te na nzela ya nguya mingi.+ 17  Na likambo ya kobikisa, mpunda ezali eloko mpamba,+Mpe ebikisaka te na nzela ya ebele ya nguya na yango ya bomoi.+ 18  Talá! Liso ya Yehova ezali kotala baoyo babangaka ye,+Baoyo bazelaka motema boboto na ye,+ 19  Mpo na kobikisa molimo na bango na liwa,+Mpe kobatela bango na bomoi na ntango ya nzala.+ 20  Molimo na biso mpenza ezali kozela Yehova.+Ye azali mosungi na biso mpe nguba na biso.+ 21  Mpo motema na biso esepelaka na ye;+Mpo totyeli nkombo na ye mosantu motema.+ 22  Ee Yehova, tiká motema boboto na yo ezala likoló na biso,+Kaka ndenge tokobi kozela yo.+

Maloba na nse