Nzembo 32:1-11

Ya Davidi. Maskile. 32  Esengo na moto oyo balimbisi botomboki na ye, oyo bazipi lisumu na ye.+   Esengo na moto oyo Yehova azali kotángela ye libunga te,+Mpe oyo elimo na ye ezali na bokosi te.+   Ntango nafandaki nyɛɛ, mikuwa na ngai ezalaki kobeba na kolelalela na ngai mokolo mobimba.+   Mpamba te na moi mpe na butu lobɔkɔ na yo ezalaki kilo likoló na ngai.+Mai ya bomoi na ngai ekauki lokola na ntango ya molunge oyo ekaukisaka na eleko ya molunge.+ Sela.   Nsukansuka nayambolelaki yo lisumu na ngai, mpe nabombaki libunga na ngai te.+Nalobaki ete: “Nakoyambolela Yehova makambo na ngai ya kobuka mibeko.”+Mpe yo moko olimbisaki libunga ya masumu na ngai.+ Sela.   Mpo na yango, moto nyonso ya sembo akobondela yo+Kaka na ntango oyo okoki kozwama.+Mpe mpela ya mai mingi ekosimba ye te.+   Yo ozali esika na ngai ya kobombana; okobatela ngai liboso ya mpasi.+Okozinga ngai na koganga ya esengo na ntango ya kobikisama.+ Sela.   “Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende.+Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.+   Bómikómisa te lokola mpunda to dɔngi oyo ezangi mayele,+Oyo ebende ya mbanga to nsinga ya nkingo esukisaka mobulu na yango+Liboso ebɛlɛma na yo.”+ 10  Bampasi ya moto mabe ezali mingi;+Kasi moto oyo azali kotyela Yehova motema, motema boboto ezingaka ye.+ 11  Bósepela na Yehova mpe bózala na esengo, bino bayengebene;+Mpe bóganga na esengo, bino nyonso oyo bozali na motema sembo.+

Maloba na nse