Nzembo 31:1-24

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi. 31  Ee Yehova, nakimi epai na yo.+Ee nayoka nsɔni ata moke te.+Na boyengebene na yo, bikisá ngai.+   Sembolelá ngai litoi na yo.+Bikisá ngai nokinoki.+Zalá esika makasi ya libateli na ngai oyo ezali ya mabanga,+Ndako ya bisika ya makasi ya libateli mpo na kobikisa ngai.+   Mpo ozali libanga na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai;+Mpo na nkombo na yo+ okokamba ngai mpe okotambwisa ngai.+   Okobimisa ngai na monyama oyo babombeli ngai,+Mpo yo ozali ndako na ngai ya makasi.+   Natiki elimo na ngai na lobɔkɔ na yo.+Osikoli ngai,+ Ee Yehova Nzambe ya solo.+   Nayinaka mpenza baoyo batyaka motema na bikeko ya mpamba, oyo ezangi ntina;+Kasi ngai natyelaka mpenza Yehova motema.+   Nakozala na esengo mpe nakosepela na motema boboto na yo,+Mpo omoni mpasi na ngai;+Oyebi bampasi ya molimo na ngai,+   Mpe okabi ngai na lobɔkɔ ya monguna te.+Otɛlɛmisi makolo na ngai na esika moko monene.+   Ee Yehova, moniselá ngai boboto mpo makambo eyeli ngai ndongo.+Liso na ngai elɛmbi na mpasi,+ molimo na ngai ná libumu na ngai.+ 10  Mpo bomoi na ngai ekómi na nsuka na mawa,+Ná bambula na ngai na kati ya kokimela.+Mpo na libunga na ngai nguya na ngai ebɛti libaku,+Mpe mikuwa na ngai mpenza elɛmbi.+ 11  Nakómi eloko ya nsɔni+ na miso ya baoyo nyonso bazali banguna na ngai,+Mpe nakómi eloko ya nsɔni mingi koleka na miso ya bato oyo bafandi penepene na ngai,+Mpe eloko ya nsɔmɔ na miso ya bato oyo bayebani na ngai.+Ntango bamoni ngai na libándá bakimi ngai.+ 12  Babosani ngai lokola moto oyo akufi mpe alongwe na motema;+Nakómi lokola mbɛki oyo ebebi;+ 13  Mpo nayoki nsango ya mabe na bato mingi,+Nsɔmɔ ezali bipai nyonso.+Ntango bazali koyangana lokola moto moko mpo na kotɛmɛla ngai,+Bazali kokana kolongola molimo na ngai.+ 14  Kasi ngai​—natyeli yo motema, Ee Yehova.+Nalobi ete: “Yo ozali Nzambe na ngai.”+ 15  Bantango na ngai ezali na lobɔkɔ na yo.+Bikisá ngai na lobɔkɔ ya banguna na ngai mpe na baoyo bazali kolanda ngai.+ 16  Ngɛngiselá mosaleli na yo elongi na yo.+Bikisá ngai na motema boboto na yo.+ 17  Ee Yehova, nayoka nsɔni te, mpo nabeleli yo.+Bato mabe báyoka nsɔni;+Báfanda nyɛɛ na kati ya Nkunda.*+ 18  Mbɛbu ya lokuta ezanga likambo ya koloba,+Oyo ezali kolobela moyengebene mabe,+ na lolendo mpe na kotyola kozanga komipekisa.+ 19  Bolamu na yo oyo obombeli baoyo bazali kobanga yo+ ezali mingi mpenza!+Oyo osaleli baoyo bazali kokima epai na yo,Na miso ya bana ya bato.+ 20  Okobomba bango na esika ya nkuku liboso na yo+Mosika na liyangani ya bato.+Okobomba bango na mwa ndako na yo ya matiti mosika na koswana ya ndemo.+ 21  Yehova apambolama,+Mpo amoniseli ngai motema boboto ya kokamwa+ na engumba oyo ezali na kati ya motungisi.+ 22  Kasi ngai, ntango nakómaki na nsɔmɔ+ nalobaki ete:“Nakosila mpenza kosila liboso ya miso na yo.”+Ya solo oyoki mongongo ya malɔmbɔ na ngai ntango nalelelaki yo mpo na kosɛnga lisalisi.+ 23  Ee bino nyonso bato na ye ya sembo, bólinga Yehova.+Yehova azali kobatela bato ya sembo,+Kasi azali kofuta mingi koleka moto nyonso oyo azali na lolendo.+ 24  Bózala na mpiko, mpe motema na bino ezala makasi,+Bino nyonso baoyo bozali kozela Yehova.+

Maloba na nse

To, “Sheole.” Talá Ap 4.