Nzembo 30:1-12

Mondule. Loyembo ya molulu ya bofungoli ndako.+ Ya Davidi. 30  Ee Yehova, nakokumisa yo mpo omatisi ngai+Mpe otiki te ete banguna na ngai básepela mpo na ngai.+   Ee Yehova Nzambe na ngai, nalelelaki yo mpo na kosɛnga lisalisi, mpe obikisaki ngai.+   Ee Yehova, obimisi molimo na ngai na Nkunda;*+Obateli ngai na bomoi, mpo nakita na libulu te.+   Ee bino bato na ye ya sembo, bóbɛtɛla Yehova mondule,+Bópesa matɔndi na ekaniseli na ye mosantu;+   Mpo nkanda oyo ayokelaka moto ezalaka mpo na mwa ntango,+Soki asepeli na moto ezali mpo na bomoi mobimba.+Na mpokwa kolela ekoki kofanda epai na biso,+ kasi na ntɔngɔ, koganga ya esengo.+   Kasi ntango ngai nazalaki na kimya nalobaki ete:+“Nakotengatenga soki moke te.”+   Ee Yehova, lokola osepeli na ngai, otɛlɛmisi ngomba na ngai na bokasi.+Obombaki elongi na yo; nabulunganaki.+   Nazalaki kaka kobelela yo, Ee Yehova;+Mpe nazalaki kaka kolɔmba Yehova amonisela ngai boboto.+   Litomba nini ezali na makila na ngai awa nazali kokita na libulu?+Putulu ekokumisa nde yo?+ Yango ekoyebisa nde bosolo na yo?+ 10  Ee Yehova, yoká mpe moniselá ngai boboto.+Ee Yehova, zalá mosungi na ngai.+ 11  Obongoli mawa na ngai mabina;+Ofungoli ngɔtɔ na ngai, mpe okangi loketo na ngai na esengo,+ 12  Mpo nkembo na ngai ebɛtɛla yo mondule mpe efanda nyɛɛ te.+Ee Yehova Nzambe na ngai, nakokumisa yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

Maloba na nse

To, “Sheole.” Talá Ap 4.