Nzembo 3:1-8

Mondule ya Davidi ntango azalaki kokima Abisalome mwana na ye.+ 3  Ee Yehova, mpo na nini banguna na ngai bakómi mingi?+Mpo na nini bato mingi bazali kotɛmɛla ngai?+   Mingi bazali koloba mpo na molimo na ngai ete:“Nzambe akokoka kobikisa ye te.”+ Sela.   Nzokande yo, Ee Yehova, ozali nguba oyo ezali kobatela ngai epai na epai,+Nkembo+ na ngai mpe Moto oyo azali kotombola motó na ngai.+   Na mongongo na ngai nakobenga Yehova ye moko,Mpe ye akoyanola ngai longwa na ngomba na ye mosantu.+ Sela.   Ngai nakomilalisa mpo nalala mpɔngi;Nakolamuka mpenza, mpo Yehova ye moko azali kosunga ngai.+   Nakobanga te bato bankóto zomi zomiOyo batandani epai na epai mpo na kotɛmɛla ngai.+   Tɛlɛmá,+ Ee Yehova! Bikisá ngai,+ Ee Nzambe na ngai!+Mpo okobɛta mpenza banguna na ngai na mbanga.+Okobuka mpenza mino ya bato mabe.+   Lobiko ezali ya Yehova.+Lipamboli na yo ezali likoló ya bato na yo.+ Sela.

Maloba na nse