Nzembo 29:1-11
Mondule ya Davidi.
29 Bópesa Yehova lokumu, Ee bino bana ya bato ya makasi,Bópesa Yehova nkembo mpe bóndima bokasi na ye.+
2 Bópesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye.+Bógumbamela Yehova na bilamba ya monzɛlɛ ya bosantu.+
3 Mongongo ya Yehova ezali likoló ya mai;+Nzambe ya nkembo+ ye moko angulumi lokola nkake.+Yehova azali likoló ya mai mingi.+
4 Mongongo ya Yehova ezali na nguya;+Mongongo ya Yehova ezali na lokumu.+
5 Mongongo ya Yehova ezali kobuka banzete ya sɛdrɛ;Ɛɛ, Yehova azali kobukabuka banzete ya sɛdrɛ ya Libá,+
6 Mpe azali kopumbwisa yango lokola mwana-ngɔmbɛ,+Libá ná Sirione+ lokola bana ya ngɔmbɛ-mibali ya zamba.
7 Mongongo ya Yehova ezali kokatakata na ndemo ya mɔtɔ;+
8 Mongongo ya Yehova ezali koningisa esobe,+Yehova azali koningisa esobe ya Kadeshe.+
9 Mongongo ya Yehova ezali koningisa banyama ebengami bishe na mpasi ya kobota+Mpe ezali kotika bazamba polele.+Mpe na tempelo na ye, moto na moto azali koloba ete: “Nkembo!”+
10 Yehova afandi likoló ya mpela;+Mpe afandi mokonzi seko na seko.+
11 Yehova ye moko akopesa bato na ye makasi.+Yehova ye moko akopambola bato na ye bázala na kimya.+