Nzembo 28:1-9

Ya Davidi. 28  Ee Yehova, nazali kaka kobelela yo.+Ee Libanga na ngai, kokangela ngai matoi te,+Ofanda nyɛɛ te liboso na ngai+Mpe nakóma te lokola baoyo bazali kokita na libulu.+   Yoká mongongo ya malɔmbɔ na ngai ntango nazali kolelela yo mpo na kosɛnga lisalisi,Ntango nazali kotombola mabɔkɔ+ na ngai na ngámbo ya shambrɛ ya kati mpenza ya esika mosantu na yo.+   Kobenda ngai te esika moko na bato mabe mpe na bato oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi,+Baoyo bazali koloba na baninga na bango maloba ya kimya+ kasi mitema na bango ezali nde na makambo ya mabe.+   Pesá bango na kolanda misala na bango+Mpe na kolanda mabe ya misala na bango.+Pesá bango na kolanda mosala ya mabɔkɔ na bango.+Zongiselá bango misala na bango moko.+   Mpo bazali kotya likebi te na misala ya Yehova,+Mpe na mosala ya mabɔkɔ na ye.+Akobuka bango mpe akotonga bango te.   Yehova apambolama, mpo ayoki mongongo ya malɔmbɔ na ngai.+   Yehova azali makasi+ na ngai mpe nguba+ na ngai.Motema na ngai etyeli ye elikya,+Mpe nasalisami, bongo motema na ngai ezali kosepela,+Mpe nakokumisa ye na loyembo na ngai.+   Yehova azali makasi ya bato na ye,+Mpe azali esika makasi ya libateli ya lobiko monene ya moto na ye oyo atyami mafuta.+   Bikisá bato na yo, mpe pambolá libula na yo;+Mpe batelá bango mpe memá bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

Maloba na nse