Nzembo 26:1-12

Ya Davidi. 26  Ee Yehova, sambisá ngai+ mpo natamboli na ezaleli na ngai ya kozanga mbeba,+Mpe natyeli Yehova motema, mpo nalɛngalɛnga te.+   Ee Yehova, talá ngai malamumalamu mpe meká ngai;+Pɛtolá bangɛi na ngai mpe motema na ngai.+   Mpo motema boboto na yo ezali liboso ya miso na ngai,Mpe natamboli na solo na yo.+   Nafandi esika moko na bato ya lokuta te;+Mpe nakɔtaka te esika moko na baoyo bazali kobomba ndenge bazali.+   Nayini lisangá ya basali-mabe,+Mpe nafandaka esika moko na bato mabe te.+   Nakosukola mabɔkɔ na ngai mpo na komonisa ete nazali na ngambo te,+Mpe nakotambola zingazinga na etumbelo na yo, Ee Yehova,+   Mpo na koyokisa lokito ya matɔndi,+Mpe mpo na kosakola misala na yo nyonso ya kokamwa.+   Yehova, nalingi esika ndako na yo efandi+Mpe esika nkembo na yo efandi.+   Kolongola molimo na ngai elongo na basumuki te,+Mpe kolongola bomoi na ngai elongo na bato ya ngambo ya makila te,+ 10  Baoyo mabɔkɔ na bango ezali na etamboli ya nsɔni,+Mpe baoyo lobɔkɔ na bango ya mobali etondi na kanyaka.+ 11  Ngai nakotambola na ezaleli na ngai ya kozanga mbeba.+Ee sikolá ngai+ mpe moniselá ngai boboto.+ 12  Lokolo na ngai ekotɛlɛma mpenza na esika ya patatalu;+Na kati ya ebele ya bato oyo bayangani, nakopambola Yehova.+

Maloba na nse