Nzembo 25:1-22

Ya Davidi. א [ʼAlef] 25  Ee Yehova, nazali kotombolela yo molimo na ngai.+ ב [Bet]   Ee Nzambe na ngai, natyeli yo motema na ngai;+Ee nayoka nsɔni te.Banguna na ngai básepela likoló na ngai te.+ ג [Gimel]   Lisusu, na baoyo batyelaka yo elikya, moko te akoyoka nsɔni.+Baoyo bazali kosala makambo na bokosi kasi bazali kolonga te, bakoyoka nsɔni.+ ד [Dalet]   Salá ete nayeba banzela na yo, Ee Yehova;+Teyá ngai banzela na yo.+ ה [Heʼ]   Tambwisá ngai na solo na yo mpe teyá ngai,+Mpo yo ozali Nzambe ya lobiko na ngai.+ו [Waw] Natyeli yo elikya mokolo mobimba.+ ז [Zayin]   Ee Yehova, kanisá misala ya motema mawa na yo+ mpe ya motema boboto na yo,+Mpo yango ezali seko na seko.+ ח [Het]   Masumu ya bolenge na ngai mpe botomboki na ngai nyonso, Ee kokanisa yango te!+Kanisá ngai na kolanda motema boboto na yo,+Ee Yehova, na bolamu na yo.+ ט [Tet]   Yehova azali malamu mpe sembo.+Yango wana ateyaka basumuki nzela na ye.+ י [Yod]   Akotambwisa bato ya komikitisa na ekateli na ye ya lisambisi,+Mpe akoteya bato ya komikitisa nzela na ye.+ כ [Kaf] 10  Banzela nyonso ya Yehova ezali motema boboto mpe bosoloMpo na baoyo bazali kotosa kondimana+ na ye mpe makundoli+ na ye. ל [Lamed] 11  Mpo na nkombo na yo, Ee Yehova,+Limbisá libunga na ngai, mpo ezali monene.+ מ [Mem] 12  Sikoyo, nani moto oyo azali kobanga Yehova?+Akoteya ye nzela oyo akopona.+ נ [Nun] 13  Molimo na ye ekofanda na kati ya bolamu,+Mpe bana na ye bakozwa mabele.+ ס [Samek] 14  Yehova azali moninga ya motema ya baoyo babangaka ye,+Lisusu apesi bango kondimana na ye, mpo báyeba yango.+ ע [ʽAyin] 15  Miso na ngai ezali ntango nyonso epai ya Yehova,+Mpo ye nde azali kolongola makolo na ngai na monyama.+ פ [Peʼ] 16  Balolá elongi na yo epai na ngai, mpe moniselá ngai boboto;+Mpo nazali kaka ngai moko mpe nazali na mpasi.+ צ [Tsade] 17  Bampasi ya motema na ngai ekómi mingi;+Ee longolá ngai na motungisi oyo nazali na yango.+ ר [Resh] 18  Talá mpasi na ngai mpe kotungisama na ngai,+Mpe limbisá masumu na ngai nyonso.+ 19  Talá ndenge banguna na ngai bakómi mingi,+Mpe bayini ngai na koyina moko ya mabe mpenza.+ ש [Shin] 20  Kɛngɛlá molimo na ngai mpe bikisá ngai.+Nayoka nsɔni te, mpo nakimi epai na yo.+ ת [Taw] 21  Kozanga mbeba mpe bosembo ebatela ngai,+Mpo natyeli yo elikya.+ 22  Ee Nzambe, sikolá Yisraele na bampasi na ye nyonso.+

Maloba na nse