Nzembo 24:1-10

Ya Davidi. Mondule. 24  Mabele mpe biloko oyo etondisi yango ezali ya Yehova,+Mabele oyo ebotaka mpe baoyo bazali kofanda wana.+   Mpo atye moboko na yango makasi likoló ya mbu,+Mpe apiki yango makasi likoló ya bibale.+   Nani akoki komata na ngomba ya Yehova,+Mpe nani akoki kotɛlɛma na esika na ye mosantu?+   Moto oyo mabɔkɔ na ye ezali na ngambo te mpe oyo motema na ye ezali pɛto,+Oyo amemi molimo na Ngai na makambo ya mpambampamba te,+Mpe alapi ndai na bokosi te.+   Akozwa lipamboli oyo euti na Yehova+Mpe boyengebene oyo euti na Nzambe na ye ya lobiko.+   Yango nde libota ya baoyo balukaka ye,Ya baoyo balukaka elongi na yo, Ee Nzambe ya Yakobo.+ Sela.   “Bótombola mitó na bino, Ee bino baporte,+Mpe bótɛlɛma, Ee bino bisika ya kokɔta+ oyo ezali koumela ntango molai,Mpo Mokonzi ya nkembo akɔta!”+   “Bongo nani Mokonzi yango ya nkembo?”+“Yehova oyo azali na makasi mpe na nguya,+Yehova azali na nguya na etumba.”+   “Bótombola mitó na bino, Ee bino baporte;+Ɛɛ, bótɛlɛmisa yango, Ee bino bisika ya kokɔta oyo ezali koumela ntango molai,Mpo Mokonzi ya nkembo akɔta!”+ 10  “Bongo Mokonzi yango ya nkembo nde nani?”“Yehova ya mampinga​—ye nde Mokonzi ya nkembo.”+ Sela.

Maloba na nse