Nzembo 23:1-6
Mondule ya Davidi.
23 Yehova azali Mobateli* na ngai.+Nakozanga eloko te.+
2 Alalisaka ngai na bisika ya koleisa banyama oyo etondi na matiti;+Atambwisaka ngai na bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi.+
3 Azongiselaka molimo na ngai makasi.+Akambaka ngai na banzela ya boyengebene mpo na nkombo na ye.+
4 Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi,+Nabangaka eloko ya mabe ata moko te,+Mpo ozali elongo na ngai;+Nzete na yo mpe lingenda na yo ezali biloko oyo ebɔndisaka ngai.+
5 Obongiselaka ngai mesa na miso ya baoyo bazali banguna na ngai.+Opakoli motó na ngai mafuta;+Kɔpɔ na ngai etondi malamu.+
6 Ya solo, bolamu mpe motema boboto ekolanda ngai mikolo nyonso ya bomoi na ngai;+Mpe nakofanda na ndako ya Yehova bomoi na ngai mobimba.+
Maloba na nse
^ Lil., “Mobateli ya mpate.”