Nzembo 22:1-31

Epai ya mokambi ya nzembo na mongongo ya Bishe ya Ntɔngɔntɔngɔ. Mondule ya Davidi. 22  Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?+Mpo na nini ozali mosika na kobikisa ngai,+Mosika na maloba na ngai ya koganga?+   Ee Nzambe na ngai, na moi, nazali se kobenga, mpe ozali koyanola te;+Mpe na butu, nazali mpe kofanda nyɛɛ te.+   Kasi yo ozali mosantu,+Ozali kofanda na kati ya masanzoli ya Yisraele.+   Batata na biso batyelaki yo motema;+Batyaki motema, mpe ozalaki kobikisa bango.+   Babelelaki yo,+ mpe babikaki;+Batyelaki yo motema, mpe bayokaki nsɔni te.+   Kasi ngai nazali nkusu,+ nazali moto te,Eloko ya nsɔni na miso ya bato mpe ya kotyola na miso ya bato.+   Baoyo nyonso bazali komona ngai, bazali kosɛka ngai;+Bazali se kofungola minɔkɔ na bango polele, bazali se koningisa mitó na bango:+   “Ye amipesaki na Yehova.+ Tiká abikisa ye!+Tiká asikola ye, mpo asepeli na ye!”+   Mpo yo Moto obimisaki ngai na libumu,+Yo Moto osalaki ete natya motema ntango nazalaki na mabɛlɛ ya mama na ngai.+ 10  Nabwakamaki epai na yo banda na libumu;+Banda na libumu ya mama na ngai ozalaki Nzambe na ngai.+ 11  Kozala mosika na ngai te, mpo mpasi ezali penepene,+Mpo mosungi mosusu azali te.+ 12  Ebele ya bana-ngɔmbɛ mibali bazingi ngai;+Bana-ngɔmbɛ mibali ya nguya ya Bashane bazingi ngai.+ 13  Bafungoleli ngai monɔkɔ,+Lokola nkɔsi oyo ezali kopasolapasola mpe koganga.+ 14  Nasopami lokola mai,+Mpe mikuwa na ngai nyonso ekabwani.+Motema na ngai ekómi lokola mafuta;+Enyangwe na kati ya libumu na ngai.+ 15  Nguya na ngai ekauki lokola eteni ya mbɛki,+Mpe lolemo na ngai ekangami na misuni ya mino na ngai;+Mpe ozali kotya ngai na putulu ya liwa.+ 16  Mpo bambwa ezingi ngai;+Liyangani ya basali-mabe ezingi ngai.+Bazali koswa mabɔkɔ na ngai ná makolo na ngai lokola nkɔsi.+ 17  Nakoki kotánga mikuwa na ngai nyonso.+Bango bazali kotala, bazali kotalatala ngai.+ 18  Bazali komikabolela bilamba na ngai,+Mpe bazali kobwakela bilamba na ngai mbɛsɛ.+ 19  Kasi yo, Ee Yehova, Ee kozala mosika te.+Ee yo makasi na ngai,+ salá noki osunga ngai.+ 20  Bikisá molimo na ngai nabomama na mopanga te,+Molimo na ngai kaka moko na lobɔkɔ ya mbwa;+ 21  Bikisá ngai na monɔkɔ ya nkɔsi,+Mpe yanolá mpe bikisá ngai na maseke ya bangɔmbɛ ya zamba.+ 22  Nakosakwela bandeko na ngai+ nkombo na yo;+Nakosanzola yo na katikati ya lisangá.+ 23  Bino baoyo bobangaka Yehova, bósanzola ye!+Bino nyonso momboto ya Yakobo, bópesa ye nkembo!+Mpe bóbanga ye, bino nyonso momboto ya Yisraele.+ 24  Mpo atyoli te+Mpe ayoki mpii te mpo na mpasi ya moto ya mpasi;+Mpe abombeli ye elongi na ye te,+Mpe ntango alelelaki ye mpo na kosɛnga lisalisi ayokaki.+ 25  Lisanzoli na ngai kati na lisangá monene+ ekouta epai na yo;Nakokokisa bilako na ngai liboso ya baoyo babangaka ye.+ 26  Bato ya komikitisa bakolya mpe bakotonda;+Baoyo balukaka ye bakosanzola Yehova.+Mitema na bino ezala na bomoi mpo na seko.+ 27  Bansuka nyonso ya mabele ekokanisa mpe ekozongela Yehova.+Mpe mabota nyonso ya bikólo ekogumbamela yo.+ 28  Mpo bokonzi ezali ya Yehova,+Mpe ye azali koyangela bikólo.+ 29  Bato nyonso ya mafutamafuta oyo bazali na mabele bakolya mpe bakogumbama;+Baoyo nyonso oyo bazali kokita na putulu bakofukamela ye,+Mpe moto moko te akobatela molimo na ye na bomoi.+ 30  Momboto ekosalela ye;+Bakosakola yango mpo na Yehova na libota oyo ekoya.+ 31  Bakoya mpe bakoyebisa boyengebene na ye+Na bato oyo bakobotama, ete asali yango.+

Maloba na nse