Nzembo 21:1-13

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi. 21  Ee Yehova, mokonzi asepelaka na makasi na yo;+Mpe alingaka mpenza kozala na esengo na lobiko na yo!+   Okokiseli ye mposa ya motema na ye,+Mpe oboyeli ye te oyo mbɛbu na ye elingi.+ Sela.   Mpo opambolaki ye mpe opesaki ye biloko ya malamu,+Mpe kotya na motó na ye motole ya wolo oyo epɛtolami.+   Asɛngaki yo bomoi. Opesaki ye yango,+Bolai ya mikolo mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+   Na lobiko na yo, nkembo na ye ezali monene.+Otyeli ye lokumu ná nkembo.+   Mpo okómisi ye moto oyo apambolami mingi mpo na seko;+Osepelisi ye na esengo liboso ya elongi na yo.+   Mpo mokonzi azali kotyela Yehova motema,+Ɛɛ motema boboto ya Oyo-Aleki-Likoló. Ye akotengatenga te.+   Lobɔkɔ na yo ekozwa banguna na yo nyonso;+Lobɔkɔ na yo ya mobali ekozwa baoyo bayinaka yo.   Okokómisa bango lokola litumbu ya mɔtɔ na ntango oyo etyamá, ntango oyo okoya kotala bango.+Yehova na nkanda na ye akomɛla bango, mpe mɔtɔ ekozikisa bango.+ 10  Okobebisa bana na bango na mabele,+Mpe bana na bango na kati ya bana ya bato.+ 11  Mpo bameki kosalela yo oyo ezali mabe;+Bakanisi makambo oyo bazali na likoki te ya kokokisa.+ 12  Mpo yo okosala ete bábalusa mikɔngɔ na bango mpe bákima+Na bansinga ya litimbo na yo oyo obongiseli elongi na bango.+ 13  Ee tiká otombwama na makasi na yo, Ee Yehova.+Tokoyemba mpe tokobɛtɛla nguya na yo mondule.+

Maloba na nse