Nzembo 20:1-9
Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.
20 Tiká Yehova ayanola yo na mokolo ya mpasi.+Nkombo ya Nzambe ya Yakobo ebatela yo.+
2 Atinda lisalisi na yo longwa na esika mosantu,+Mpe asunga yo longwa na Siona.+
3 Akanisa makabo+ na yo nyonso,Mpe andima likabo na yo ya kotumba mpe atalela yango lokola nde mafuta.+ Sela.
4 Apesa yo na kolanda mposa ya motema na yo,+Mpe akokisa mokano na yo mobimba.+
5 Tokoganga na esengo mpo na lobiko na yo,+Mpe na nkombo ya Nzambe na biso tokotombola babɛndɛlɛ na biso.+Yehova akokisa nyonso oyo ozali kosɛnga.+
6 Sikoyo nayebi ete Yehova abikisaka mpenza moto na ye oyo atyami mafuta.+Ayanolaka ye longwa na likoló na ye mosantu+Na misala ya nguya mpe ya kobikisa ya lobɔkɔ na ye ya mobali.+
7 Bamosusu batángaka makalo mpe bamosusu batángaka bampunda,+Kasi biso, tokotánga nkombo ya Yehova Nzambe na biso.+
8 Bato yango mpenza babukani mpe bakwei;+Kasi biso, totɛlɛmi, mpo tózongisama.+
9 Ee Yehova, bikisá mokonzi!+Akoyanola biso na mokolo oyo tokobenga.+