Nzembo 2:1-12

2  Mpo na nini bikólo ekómi na yikiyiki+Mpe bituluku ya bato ya bikólo ezalaki kaka koloba na nse nse likambo ya mpamba?+   Bakonzi ya mabele bazali kotɛlɛma+Mpe bankumu bayangani lokola moto moko+Mpo na kotɛmɛla Yehova+ mpe kotɛmɛla moto na ye oyo atyami mafuta,+   Bazali koloba: “Tóbuka bikangiseli na bango+Mpe tóbwaka bansinga na bango mosika na biso!”+   Ye oyo afandi na likoló+ akosɛka;Yehova ye moko akotyola bango.+   Na ntango yango, akoloba na bango na nkanda na ye+Mpe na nkanda na ye makasi akobulunganisa bango,+   Akoloba ete: “Ngai, ɛɛ ngai, natye mokonzi na ngai+Na Siona,+ ngomba na ngai mosantu.”+   Tiká nalobela mobeko ya Yehova;Ye alobi na ngai ete: “Yo ozali mwana na ngai;+Lelo ngai nakómi tata na yo.+   Sɛngá ngai,+ napesa yo bikólo mpo ezala libula na yo+Mpe mabele tii na bansuka na yango ezala ya yo.+   Okobuka bango na lingenda ya bokonzi ya ebende,+Okobukabuka bango lokola mbɛki ya moyemi-mbɛki.”+ 10  Mpe sikoyo, Ee bakonzi, bózala na mayele ya kososola;Bóndima básembola bino, Ee basambisi ya mabele.+ 11  Bósalela Yehova na kobanga+Mpe bózala na esengo na kolɛnga.+ 12  Bópwɛpwa mwana,+ mpo Ye asilika teNoki bókufa mpe bólongwa na nzela,+Mpo nkanda na ye epelaka noki.+Esengo na baoyo nyonso bazali kokima epai na ye.+

Maloba na nse