Nzembo 19:1-14
Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.
19 Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe;+Mpe etando ezali koyebisa mosala ya mabɔkɔ na ye.+
2 Mokolo moko nsima ya mokolo mosusu ezali kobimisa liloba,+Mpe butu moko nsima ya butu mosusu ezali komonisa boyebi.+
3 Elobeli ezali te, mpe maloba ezali te;Mongongo na yango ezali koyokana te.+
4 Nsinga na yango ya komeka esembolami na mabele mobimba,+Mpe maloba na yango kino na nsuka ya mabele oyo ebotaka.+Atyeli moi hema na kati na yango,+
5 Mpe yango ezali lokola mobali ya libala ntango azali kobima na shambrɛ na ye ya libala;+Ezali kosepela kopota mbangu ndenge mobali ya nguya asepelaka kopota na nzela.+
6 Ezali kobima longwa na nsuka moko ya likoló,Mpe mobembo na yango ezali kosuka na bansuka na yango mosusu;+Mpe eloko moko te ezangi kozwa molunge na yango.+
7 Mobeko+ ya Yehova ezali ya kokoka,+ ezongisaka molimo.+Bokundoli+ ya Yehova ebongi kotyelama motema,+ ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya.+
8 Bitinda+ ya Yehova ezali alima,+ esepelisaka motema;+Mitindo+ ya Yehova ezali pɛto,+ engɛngisaka miso.+
9 Kobanga+ Yehova ezali pɛto, eumelaka seko.Bikateli ya lisambisi+ ya Yehova ezali solo;+ yango nyonso ezali boyengebene.+
10 Elingamaka mingi koleka wolo, ɛɛ, koleka wolo mingi oyo epɛtolami;+Mpe eleki mafuta ya nzoi na elɛngi+ mpe eleki mafuta ya nzoi oyo ezali kouta na ndako ya mafuta ya nzoi.+
11 Lisusu, ekebisi mosaleli na yo;+Kobatela yango ezali na litomba monene.+
12 Mabunga—nani akoki kososola yango?+Na masumu oyo ebombani, tángá ngai moto oyo asali likambo te.+
13 Lisusu, pekisá mosaleli na yo misala ya lofundo;+Kotika te ete yango eyangela ngai.+Na ndenge yango nakozala moto oyo akoki,+Mpe nakozala na ngambo te na makambo mingi ya kobuka mibeko.
14 Maloba ya monɔkɔ na ngai mpe komanyola ya motema na ngai+Ekóma elɛngi liboso na yo, Ee Yehova Libanga+ na ngai mpe Mosikoli na ngai.+