Nzembo 16:1-11
Mikitame ya Davidi.
16 Batelá ngai, Ee Nzambe, mpo nakimi epai na yo.+
2 Nalobi na Yehova ete: “Yo ozali Yehova; bolamu na ngai ekopesa yo litomba te,+
3 Kasi ekopesa litomba nde na basantu oyo bazali na mabele.Bango, ɛɛ bato ya lokumu nde bato nasepelaka na bango mpenza.”+
4 Mpasi ekómaka mingi epai ya baoyo, ntango moto mosusu amonani, balandaka ye nokinoki.+Nakopesa makabo na bango ya masanga ya makila te,+Mpe nakotánga nkombo na bango na mbɛbu na ngai te.+
5 Yehova azali ndambo ya likabo oyo bapesá ngai+ mpe ya kɔpɔ na ngai.+Ozali kosimba makasi likabo na ngai.
6 Bisika oyo omeki na nsinga mpo na kopesa ngai libula esepelisi ngai.+Ya solo mpenza, libula na ngai moko ezali kosepelisa ngai.
7 Nakopambola Yehova, moto apesi ngai toli.+Ya solo mpenza, na butu bangɛi na ngai esemboli ngai.+
8 Natye Yehova liboso na ngai ntango nyonso.+Lokola ye azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nakotengatenga te.+
9 Na yango, motema na ngai ezali kosepela, mpe nkembo na ngai elingi kozala na esengo.+Lisusu, nzoto na ngai ekofanda na kimya.+
10 Mpo yo okotika molimo na ngai na kati ya Nkunda* te.+Okotika te ete moto na yo ya sembo amona libulu.+
11 Okoyebisa ngai nzela ya bomoi.+Liboso ya elongi na yo, bato batondaka na esengo;+Makambo oyo epesaka esengo ezali na lobɔkɔ na yo ya mobali mpo na seko.+
Maloba na nse
^ To, “Sheole.” Talá Ap 4.