Nzembo 15:1-5

Mondule ya Davidi. 15  Ee Yehova, nani akoyambama na hema na yo?+Nani akofanda na ngomba na yo mosantu?+   Ye oyo azali kotambola na mbeba te+ mpe oyo azali kosala na boyengebene+Mpe azali koloba solo na motema na ye.+   Akoseli bato makambo na lolemo na ye te.+Asaleli moninga na ye eloko moko ya mabe te,+Mpe abebiseli moninga na ye ya motema lokumu te.+   Na miso na ye, moto ya mpambampamba aboyami mpenza,+Kasi azali kokumisa baoyo babangaka Yehova.+Ata soki alapi ndai mpo na likambo oyo ekoki kobimisela ye mikakatano, akobongola maloba na ye te.+   Apesi mbongo na ye mpo na kozwa benefisi te,+Mpe azwi kanyaka te mpo na kokweisa moto oyo asali likambo te.+Ye oyo azali kosala makambo wana akotengatenga soki moke te.+

Maloba na nse