Nzembo 148:1-14
148 Bósanzola Yah!+Bósanzola Yehova uta na likoló,+Bósanzola ye na bisika oyo etombwaná.+
2 Bósanzola ye, bino baanzelu na ye nyonso.+Bósanzola ye, bino limpinga na ye mobimba.+
3 Bósanzola ye, bino moi ná sanza.+Bósanzola ye, bino minzoto nyonso ya pole.+
4 Bósanzola ye, mosika kuna na likoló mpenza,+Mpe bino mai oyo ezali kuna na likoló.+
5 Tiká básanzola nkombo ya Yehova;+Mpo ye moko apesaki mitindo, mpe yango ezalisamaki.+
6 Mpe atɛlɛmisi yango mpo na libela, mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+Apesi lilako, mpe yango ekoleka te.+
7 Bósanzola Yehova uta na mabele,+Bino banyama ya nsɔmɔ ya mbu mpe bino mai nyonso ya bozindo,+
8 Bino mɔtɔ mpe mbula ya mabanga, nɛjɛ mpe molinga,+Yo mopɛpɛ ya makasi, oyo ozali kokokisa liloba na ye,+
9 Bino bangomba mpe bangomba mike nyonso,+Bino banzete ya mbuma mpe bino banzete nyonso ya sɛdrɛ,+
10 Bino banyama ya zamba mpe bino banyama nyonso ya mboka,+Bino biloko oyo ebendanaka na libumu mpe bandɛkɛ oyo ezali na mapapu,+
11 Bino bakonzi ya mabele+ mpe bino nyonso bituluku ya bato ya bikólo,Bino bankumu+ mpe bino nyonso basambisi ya mabele,+
12 Bino bilenge+ mibali mpe bino bangɔndɔ,+Bino mibange+ ná bana.+
13 Básanzola nkombo ya Yehova,+Mpo nkombo na ye yango moko ezali likoló mpenza koleka nyonso.+Lokumu na ye eleki mabele mpe likoló.+
14 Mpe akotombola liseke ya bato na ye,+Lisanzoli ya bato na ye nyonso ya sembo,+Ya bana ya Yisraele, bato oyo bazali pene na ye.+Bósanzola Yah!+