Nzembo 147:1-20
147 Bósanzola Yah,+Mpo ezali malamu kobɛtɛla Nzambe na biso mondule;+Mpo ezali likambo ya kosepelisa—lisanzoli ebongi.+
2 Yehova azali kotonga Yerusaleme;+Azali kosangisa bato ya Yisraele oyo bapalanganá.+
3 Abikisaka+ baoyo bazoki na motema,+Mpe akangaka bampota na bango oyo ezali kosala mpasi.+
4 Atángaka motángo ya minzoto;+Abengaka yango nyonso na nkombo na yango.+
5 Nkolo na biso azali monene mpe na nguya mingi mpenza;+Ndenge ya kolobela mayele na ye ezali te.+
6 Yehova asalisaka bato ya komikitisa;+Akitisaka bato mabe kino na mabele.+
7 Bóyembela Yehova nzembo ya matɔndi;+Bóbɛtɛla Nzambe na biso mondule na nzɛnzɛ,+
8 Ye oyo azali kozipa likoló na mapata,+Ye oyo abongisaka mbula mpo na mabele,+Ye oyo azali kosala ete bangomba ebimisa matiti.+
9 Azali kopesa banyama bilei,+Bana ya yanganga oyo bazali se kobelela.+
10 Asepelaka na nguya ya mpunda te,+Esengo na ye ezalaka mpe na makolo ya moto te.+
11 Yehova asepelaka na baoyo bazali kobanga ye,+Na baoyo bazali kozela motema boboto na ye.+
12 Ee Yerusaleme, kumisá Yehova.+Ee Siona, sanzolá Nzambe na yo.+
13 Mpo akómisi bikangiseli ya baporte na yo makasi;Apamboli bana na yo na kati na yo.+
14 Azali kotya kimya na teritware na yo;+Azali se kotondisa yo na mafuta ya mbuma ya blé.+
15 Azali kotinda liloba na ye na mabele;+Liloba na ye epotaka mbangu mpenza.
16 Azali kopesa nɛjɛ lokola lɛnɛ;+Apanzaka putulu ya matandala lokola putulu ya mɔtɔ.+
17 Azali kobwaka lokola biteni ya mampa mai na ye oyo ekómi libanga.+Nani akoki kotɛlɛma liboso ya malili na ye?+
18 Atindaka liloba na ye+ mpe anyangwisaka yango.Apɛpisaka mopɛpɛ na ye;+Mai etíyolaka.
19 Azali koyebisa Yakobo liloba na ye,+Malako+ na ye mpe bikateli na ye ya lisambisi epai ya Yisraele.+
20 Asalelá ekólo mosusu bongo te;+Mpe bikateli na ye ya lisambisi, bango bayebi yango te.+Bósanzola Yah!+