Nzembo 146:1-10

146  Bósanzola Yah!+Ee molimo na ngai, sanzolá Yehova.+   Nakosanzola Yehova na boumeli ya bomoi na ngai mobimba.+Nakobɛtɛla Nzambe na ngai mondule ntango nyonso nakozala na bomoi.+   Bótyela bankumu motema te,+to mwana ya moto ya mabele te, mpo akoki kobikisa te.+   Elimo na ye ekobima,+ akozonga na mabele;+Na mokolo yango makanisi na ye ekufi.+   Esengo na ye oyo Nzambe ya Yakobo nde mosungi na ye,+Oyo elikya na ye ezali epai ya Yehova Nzambe na ye,+   Mokeli ya likoló ná mabele,+Ya mbu, mpe ya nyonso oyo ezali na kati na yango,+Ye oyo azali kobatela bosolo mpo na libela,+   Ye oyo akataka likambo mpo na bato oyo bato bazali kobuba,+Ye oyo apesaka limpa na bato oyo bazali na nzala.+Yehova afungolaka baoyo bakangami.+   Yehova afungolaka miso ya bato oyo bakufá miso;+Yehova atɛlɛmisaka bato oyo bagumbami;+Yehova alingaka bayengebene.+   Yehova abatelaka bato oyo bafandi bapaya;+Asalisaka mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá,+Kasi atɛngisaka nzela+ ya bato mabe.+ 10  Yehova akozala mokonzi seko na seko,+Nzambe na yo, Ee Siona, mpo na libota na libota.+Bósanzola Yah!+

Maloba na nse