Nzembo 145:1-21
Lisanzoli, ya Davidi.
א [ʼAlef]
145 Ee Nzambe na ngai Mokonzi,+ nakokumisa yo,Mpe nakopambola nkombo na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+
ב [Bet]
2 Mokolo mobimba nakopambola yo,+Mpe nakosanzola nkombo na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+
ג [Gimel]
3 Yehova azali monene mpe asengeli kosanzolama mingi,+Mpe bonene na ye ekoki kososolama te.+
ד [Dalet]
4 Libota nsima ya libota ekokumisa misala na yo,+Mpe bakolobela misala na yo ya nguya.+
ה [Heʼ]
5 Nkembo ya kokamwa ya lokumu na yo+Mpe makambo ya misala na yo ya kokamwa ekozala lobanzo na ngai.+
ו [Waw]
6 Mpe bakolobela bokasi ya misala na yo ya nsɔmɔ;+Bongo bonene na yo, nakosakola yango.+
ז [Zayin]
7 Bakolobela mpenza bolamu oyo otondi na yango,+Mpe bakoganga na esengo mpo na boyengebene na yo.+
ח [Het]
8 Yehova azali na ngɔlu mpe na motema mawa,+Ayokaka nkanda noki te mpe azali na motema boboto mingi.+
ט [Tet]
9 Yehova azali malamu epai ya bikelamu nyonso,+Mpe motema mawa na ye ezali likoló ya misala na ye nyonso.+
י [Yod]
10 Ee Yehova, misala na yo nyonso ekokumisa yo,+Mpe bato na yo ya sembo bakopambola yo.+
כ [Kaf]
11 Bakolobela nkembo ya bokonzi na yo,+Mpe bakolobela nguya na yo,+
ל [Lamed]
12 Mpo na koyebisa bana ya bato misala na yo ya nguya+Mpe bonene ya nkembo ya bokonzi na yo.+
מ [Mem]
13 Bokonzi na yo ezali bokonzi ya seko na seko,+Mpe boyangeli na yo ezali mpo na mabota nyonso oyo ezali kolandana.+
ס [Samek]
14 Yehova azali kosunga baoyo nyonso bazali kokwea,+Mpe azali kotombola baoyo nyonso bagumbami.+
ע [ʽAyin]
15 Miso ya bikelamu nyonso etalaka na elikya epai na yo,+Mpe ozali kopesa bango bilei na ntango na yango.+
פ [Peʼ]
16 Ozali kofungola lobɔkɔ na yo+Mpe ozali kokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.+
צ [Tsade]
17 Yehova azali moyengebene na banzela na ye nyonso+Mpe sembo na misala na ye nyonso.+
ק [Kof]
18 Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye,+Na baoyo nyonso babelelaka ye na bosolo.+
ר [Resh]
19 Akokokisa mposa ya baoyo bazali kobanga ye,+Mpe akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi, mpe akobikisa bango.+
ש [Shin]
20 Yehova azali kobatela baoyo nyonso bazali kolinga ye,+Kasi akosilisa bato mabe nyonso nyɛɛ.+
ת [Taw]
21 Monɔkɔ na ngai ekoloba lisanzoli ya Yehova;+Mpe mosuni nyonso epambola nkombo na ye mosantu mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+

