Nzembo 143:1-12
Mondule ya Davidi.
143 Ee Yehova, yoká libondeli na ngai;+Tyá litoi na lilɔmbɔ na ngai.+Na bosembo na yo mpe na boyengebene na yo, yanolá ngai.+
2 Mpe kosamba na mosaleli na yo te;+Mpo liboso na yo moto ya bomoi ata moko te akoki kozala moyengebene.+
3 Mpo monguna alandi molimo na ngai;+Anyatinyati bomoi na ngai na mabele mpenza.+Afandisi ngai na bisika ya molili lokola baoyo bakufá kalakala.+
4 Mpe elimo+ na ngai ezali kolɛmba makasi na kati na ngai;Motema na ngai ekómi kilo.+
5 Nakanisi mikolo ya kalakala;+Namanyoli mosala na yo mobimba;+Nasepelaki komibanzabanza ntango nyonso mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.+
6 Natandi mabɔkɔ na ngai epai na yo;+Molimo na ngai ezali lokola mokili oyo ekauká oyo ezali na mposa na yo.+ Sela.
7 Ee salá mbangu, yanolá ngai, Ee Yehova.+Elimo na ngai ekómi na nsuka.+Kobombela ngai elongi na yo te,+Soki te nakokóma mpenza lokola baoyo bazali kokita na libulu.+
8 Na ntɔngɔ, yokisá ngai motema boboto na yo,+Mpo natyeli yo motema.+Yebisá ngai nzela oyo nasengeli kotambola,+Mpo natomboli molimo na ngai epai na yo.+
9 Ee Yehova, bikisá ngai na banguna na ngai.+Namibombi epai na yo.+
10 Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo,+Mpo ozali Nzambe na ngai.+Elimo na yo ezali malamu;+Ekamba ngai na mokili ya bosembo.+
11 Mpo na nkombo na yo,+ Ee Yehova, otika ngai na bomoi.+Na boyengebene na yo,+ obimisa molimo na ngai na mpasi.+
12 Mpe na motema boboto na yo, okangisa banguna na ngai monɔkɔ;+Mpe osengeli kobebisa baoyo nyonso bazali banguna ya molimo na ngai,+Mpo nazali mosaleli na yo.+