Nzembo 142:1-7
Maskile. Ya Davidi, ntango azalaki na mobenga.+ Libondeli.
142 Na mongongo na ngai, nabelelaki Yehova mpo na kosɛnga lisalisi;+Na mongongo na ngai, nabandaki kobelela Yehova mpo amonisela ngai boboto.+
2 Nazalaki kosopa motungisi na ngai liboso na ye;+Nakobaki koyebisa ye mpasi na ngai,+
3 Ntango elimo+ na ngai elɛmbaki makasi na kati na ngai.Bongo yo moko oyebaki nzela na ngai.+Na nzela oyo nazali kotambola+Babombeli ngai motambo.+
4 Talá na lobɔkɔ ya mobali mpe monáEte moto moko te azali kondima ete ayebi ngai lisusu.+Esika na ngai ya kokima elimwe liboso na ngai;+Moto moko te azali kotuna makambo ya molimo na ngai.+
5 Ee Yehova, nabelelaki yo mpo na kosɛnga lisalisi.+Nalobaki ete: “Ozali ekimelo na ngai,+Likabo+ na ngai na mokili ya bato ya bomoi.”+
6 Tyá likebi na kosɛngasɛnga na ngai ya kolela,+Mpo nakómi mobola mpenza.+Bikisá ngai na banyokoli na ngai,+Mpo bazali makasi mingi koleka ngai.+
7 Bimisá molimo na ngai na kasho+Mpo nakumisa nkombo na yo.+Bayengebene báyangana zingazinga na ngai,+Mpo ozali kosalela ngai makambo na ndenge oyo ebongi.+

