Nzembo 141:1-10
Mondule ya Davidi.
141 Ee Yehova, nabeleli yo.+Yaká noki epai na ngai.+Tyá litoi na mongongo na ngai ntango nazali kobenga yo.+
2 Libondeli na ngai ebongisama lokola mpaka ya malasi+ liboso na yo,+Kotombwama ya mabɔkɔ na ngai, lokola likabo ya mbuma ya mpokwa.+
3 Ee Yehova, tyelá monɔkɔ na ngai mokɛngɛli;+Tyá sinzili na porte ya mbɛbu na ngai.+
4 Kotinda motema na ngai elanda eloko moko te ya mabe,+Mpo na komipesa na makambo oyo ekendá nsango mpo na mabe na yango+Elongo na bato oyo bazali kosala makambo oyo eyokisaka mpasi,+Mpo nalyaka te bilei na bango ya kitokokitoko.+
5 Soki moyengebene abɛti ngai, ekozala motema boboto;+Mpe soki apameli ngai, ekozala mafuta na motó na ngai,+Oyo motó na ngai ekoboya te.+Mpo nakokoba kobondela ata na ntango ya bampasi na bango.+
6 Basambisi na bango babwakami na mipanzi ya libanga tii na nse,+Kasi bayoki ete maloba na ngai ezali kosepelisa.+
7 Se ndenge bapasolaka mpe bapanzaka nkoni na mabele,Mikuwa na biso epanzani na monɔkɔ ya Nkunda.*+
8 Nzokande, miso na ngai ezali epai na yo,+ Ee Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+Nakimi epai na yo.+Kosopa molimo na ngai te.+
9 Batelá ngai nazwama te na bikangeli ya motambo oyo batyeli ngai+Mpe na mitambo ya baoyo bazali kosala makambo oyo eyokisaka mpasi.+
10 Bato mabe bakokwea bango nyonso na minyama na bango moko,+Kasi ngai nakoleka.
Maloba na nse
^ To, “Sheole.” Talá Ap 4.