Nzembo 140:1-13
Mpo na mokambi. Mondule ya Davidi.
140 Ee Yehova, bikisá ngai na bato mabe;+Obatela ngai na moto ya misala ya mobulu,+
2 Baoyo bakani kosala makambo mabe na mitema na bango,+Baoyo, mokolo mobimba, bazali se kokende kobunda lokola na bitumba.+
3 Bapelisi lolemo na bango lokola oyo ya nyoka;+Ngɛngɛ ya etupa ya maseke ezali na nse ya mbɛbu na bango.+ Sela.
4 Ee Yehova, batelá ngai na mabɔkɔ ya moto mabe;+Bikisá ngai mpenza na moto ya misala ya mobulu,+Baoyo bakani kotindika matambe na ngai.+
5 Bato oyo bazali komikumisa babombeli ngai motambo;+Mpe batandi bansinga lokola monyama pembeni ya nzela.+Batyeli ngai mitambo.+ Sela.
6 Nalobi na Yehova: “Ozali Nzambe na ngai.+Ee Yehova, tyá litoi na mongongo ya malɔmbɔ na ngai.”+
7 Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ bokasi ya lobiko na ngai,+Ozipi motó na ngai na mokolo ya etumba.+
8 Ee Yehova, kopesa nzela te ete bamposa ya moto mabe ekokisama.+Kolongisa myango na ye ya mabe te, noki bámitombola.+ Sela.
9 Kasi mitó ya baoyo bazali kozinga ngai,+Mpasi ya mbɛbu na bango moko ezipa yango.+
10 Bákweisela bango makala ya mɔtɔ.+Bákweisa bango na mɔtɔ,+ na mabulu ya mai, mpo bátɛlɛma te.+
11 Moto oyo alobaka makambo minene—apikama makasi te na mabele.+Moto ya mobulu—mabe elandalanda ye mpe ebɛtabɛta ye makofi.+
12 Nayebi malamu ete Yehova akosala nyonso mpo akɔtela+Moto ya mpasi na likambo na ye, na lisambisi ya babola.+
13 Ya solo, bayengebene bakopesa nkombo na yo matɔndi;+Bato ya makambo alima bakofanda liboso ya elongi na yo.+