Nzembo 14:1-7

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi. 14  Zoba alobi na motema na ye ete:“Yehova azali te.”+Babebisi makambo,+ na misala na bango, basali makambo na ndenge ya bosɔtɔ mpenza.Ata moto moko te azali kosala malamu.+   Kasi uta na likoló, Yehova azali kotala bana ya bato,+Mpo na komona soki ezali na moto oyo azali na mayele ya kososola, moto oyo azali koluka Yehova.+   Bango nyonso bapɛngwi,+ bango nyonso mpe babebi;+Ata moto moko te azali kosala malamu,+Ata moko te.+   Bato nyonso oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bazwi nde boyebi te,+Bazali nde kolya bato na ngai ndenge balyaka limpa?+Babeleli kutu Yehova te.+   Kuna batondaki na nsɔmɔ moko monene,+Mpo Yehova azali na kati ya libota ya moyengebene.+   Boyokisaki toli ya moto ya mpasi nsɔni,Mpamba te Yehova azali ekimelo na ye.+   Ee lobiko ya Yisraele euta na Siona!+Ntango Yehova akozongisa bato na ye oyo bazali bakangami,+Tiká Yakobo azala na esengo, tiká Yisraele asepela.+

Maloba na nse