Nzembo 139:1-24
Epai ya mokambi. Ya Davidi. Mondule.
139 Ee Yehova, otalitali ngai, mpe oyebi ngai.+
2 Yo moko oyebi ntango nazali kofanda mpe ntango nazali kotɛlɛma.+Uta na mosika otyeli likanisi na ngai likebi.+
3 Ntango nazali kosala mobembo mpe ntango nazali komilalisa, nyonso wana ozali kotala yango malamumalamu,+Mpe oyebi malamu mpenza banzela na ngai nyonso.+
4 Mpo liloba moko te ezali na lolemo na ngai,+Kasi talá! Ee Yehova, osili koyeba yango nyonso.+
5 Ozingi ngai na nsima mpe na liboso;Mpe ozali kotya lobɔkɔ na yo likoló na ngai.
6 Boyebi ya boye ezali kokamwisa ngai mingi.+Eleki likoló mingi, nakoki kokóma na yango te.+
7 Epai wapi nakoki kokende mpo nakima elimo na yo,+Mpe epai wapi nakoki kokima elongi na yo?+
8 Soki namati na likoló, ozali kuna;+Mpe soki natandi mbeto na ngai na Nkunda,* talá! ozali kuna.+
9 Soki nazwi mapapu+ ya kotana ya ntɔngɔ,Mpo nafanda na mbu ya mosika koleka,+
10 Kuna mpe, lobɔkɔ na yo ekokamba ngai+Mpe lobɔkɔ na yo ya mobali ekokanga ngai.+
11 Mpe soki nalobi: “Ya solo molili mpenza ekozipa ngai nokinoki!”+Na ntango yango butu ekozala pole zingazinga na ngai.+
12 Ata molili yango moko ekozala moindo makasi mpenza te mpo na yo,+Kasi butu ekongɛnga lokola moi;+Molili ekoki mpe kozala kaka pole.+
13 Mpo yo moko osalaki bangɛi na ngai;+Ozipaki ngai na libumu ya mama na ngai.+
14 Nakokumisa yo mpo nasalami na ndenge moko ya kokamwa, na ndenge moko ya nsɔmɔ.+Misala na yo ezali ya kokamwa,+Mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.+
15 Mikuwa na ngai ebombanaki na miso na yo te+Ntango nasalemaki na nkuku,+Ntango nalitamaki lokola elamba na nse mpenza+ ya mabele.
16 Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki,+Mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo:Mikolo oyo yango esalemaki+Mpe ntango oyo eteni na yango ata moko ezalaki naino te.
17 Na yango, makanisi na yo ezali na motuya mingi mpenza na miso na ngai!+Ee Nzambe, motángo na yango nyonso ezali monene mpenza!+
18 Soki nameki kotánga yango, ekoleka kutu bambuma ya zɛlo.+Nalamuki, mpe nazali kaka elongo na yo.+
19 Ee soki yo, Ee Nzambe, obomaka moto mabe!+Mbɛlɛ ata bato oyo bazali na ngambo ya makila+ balongwe epai na ngai,
20 Baoyo balobelaka yo makambo na kolanda likanisi na bango;+Bazwi nkombo na yo na lisɛki+—banguna na yo.+
21 Nayinaka baoyo bazali koyina yo makasi, Ee Yehova,+Mpe nayokaka mpii mpo na baoyo bazali kotombokela yo, boye te?+
22 Nayinaka bango koyina mpenza.+Na miso na ngai bakómá banguna mpenza.+
23 Ee Nzambe, talá ngai malamumalamu mpe yebá motema na ngai.+Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai,+
24 Mpe moná soki kati na ngai ezali na nzela moko oyo eyokisaka mpasi,+Mpe kambá ngai na nzela+ ya seko.
Maloba na nse
^ To, “Sheole.” Talá Ap 4.