Nzembo 137:1-9

137  Pene ya bibale ya Babilone+​—tofandaki kuna.+Mpe tolelaki ntango tokanisaki Siona.+   Na banzete ya arava+ oyo ezalaki kunaTokakisaki banzɛnzɛ na biso.+   Mpo kuna, baoyo bakangaki biso basɛngaki biso maloba ya loyembo,+Mpe baoyo bazalaki kosɛka biso basɛngaki biso loyembo ya kosepelisa bango+ mpe balobaki ete:“Bóyembela biso loyembo moko ya Siona.”+   Ndenge nini tóyemba loyembo ya Yehova+Na mabele ya bapaya?+   Ee Yerusaleme, soki nabosani yo,+Lobɔkɔ na ngai ya mobali ebosana mosala.   Lolemo na ngai ekangama na edáda na ngai,+Soki nakanisi yo te,+Soki natomboli Yerusaleme teKoleka eloko ya liboso oyo esepelisaka ngai.+   Ee Yehova, kanisá+ bana ya Edome,+ na mokolo ya Yerusaleme,+Baoyo bazalaki koloba: “Bóbuka yango! Bóbuka yango tii na moboko na yango!”+   Ee mwana mwasi ya Babilone, oyo asengeli kopunzama,+Esengo na ye oyo akopesa yo lifuti+Oyo ebongi na ndenge oyo yo osalaki biso.+   Esengo na ye oyo akokanga mpe akobukabuka+Bana na yo likoló ya libanga.

Maloba na nse