Nzembo 135:1-21

135  Bósanzola Yah!+Bósanzola nkombo ya Yehova,+Bópesa masanzoli, Ee basaleli ya Yehova,+   Bino baoyo botɛlɛmaka na ndako ya Yehova,+Na mapango ya ndako ya Nzambe na biso.+   Bósanzola Yah, mpo Yehova azali malamu.+Bóbɛtɛla nkombo na ye mondule, mpo esepelisaka.+   Mpo Yah amiponelá Yakobo,+Yisraele mpo azala mpenza eloko na ye moko.+   Mpo ngai nayebi ete Yehova azali monene,+Mpe Nkolo na biso aleki banzambe mosusu nyonso.+   Eloko nyonso oyo Yehova asepelaki kosala asalá yango+Na likoló mpe na mabele, na mbu mpe na bisika nyonso ya mai mozindo.+   Azali komatisa mbɔngi ya mai na nsuka ya mabele;+Asalelá kutu mbula bapor­te;+Azali kobimisa mopɛpɛ na bandako na ye ya kobomba biloko,+   Ye oyo abomaki bana ya liboso ya Ezipito,+Moto ná nyama.+   Atindaki bilembo ná makamwisi epai na yo, Ee Ezipito,+Likoló ya Farao mpe likoló ya basaleli na ye nyonso;+ 10  Ye oyo abɛtaki bikólo ebele+Mpe abomaki bakonzi ya nguya,+ 11  Ɛɛ, Sihone mokonzi ya Baamore+Mpe Oge mokonzi ya Bashane+Mpe makonzi nyonso ya Kanana,+ 12  Mpe ye oyo apesaki mokili na bango ezala libula,+Libula epai ya Yisraele bato na ye.+ 13  Ee Yehova, nkombo na yo ezali mpo na seko.+Ee Yehova, ekaniseli na yo ezali mpo na libota na libota.+ 14  Mpo Yehova akosamba likambo ya bato na ye,+Mpe akoyokela basaleli na ye mawa.+ 15  Bikeko ya bikólo ezali palata mpe wolo,+Eloko oyo esalemi na mabɔkɔ ya moto ya mabele.+ 16  Ezali na monɔkɔ, kasi ekoki koloba te;+Ezali na miso, kasi ekoki komona te;+ 17  Ezali na matoi, kasi ekoki koyoka te.+Mpe zolo na yango ezali na mpema te.+ 18  Baoyo bazali kosala yango bakokóma lokola yango,+Moto nyonso oyo azali kotyela yango motema.+ 19  Ee ndako ya Yisraele, bópambola Yehova.+Ee ndako ya Arona, bópambola Yehova.+ 20  Ee ndako ya Levi, bópambola Yehova.+Bino baoyo bobangaka Yehova, bópambola Yehova.+ 21  Yehova apambwama uta na Siona,+Ye oyo afandi na Yerusaleme.+Bósanzola Yah!+

Maloba na nse