Nzembo 132:1-18

Loyembo ya ntango ya komata. 132  Ee Yehova, kanisá Davidi,+Kosambwa na ye nyonso;+   Ndenge alapelaki Yehova ndai,+Ndenge asalaki elako epai ya Oyo na Nguya+ ya Yakobo:+   “Nakokɔta na hema ya ndako na ngai te.+Nakomata te na mbeto na ngai ya kitoko,+   Nakotika miso na ngai ezwa mpɔngi te,+Mpe nakokanga miso na ngai te mpo ezali kongɛnga,+   Kino nakozwela Yehova esika,+Tabernakle monene mpo na Oyo na Nguya ya Yakobo.”+   Talá! Toyoki yango na Efrata,+Tomoni yango na zamba.+   Tókɔta na tabernakle na ye monene;+Tógumbama na ebonga ya makolo na ye.+   Tɛlɛmá, Ee Yehova, okende na esika na yo ya kopema,+Yo ná Sanduku+ ya bokasi na yo.+   Banganga-nzambe na yo bálata boyengebene,+Mpe bato na yo ya sembo báganga na esengo.+ 10  Mpo na Davidi mosaleli na yo,+Koboya te elongi ya moto na yo oyo atyami mafuta.+ 11  Yehova alapeli Davidi ndai,+Ya solo akozonga nsima na likambo yango te:+“Oyo akouta na mbuma ya libumu na yo+ ndeNakotya ye na kiti na yo ya bokonzi.+ 12  Soki bana na yo bakobatela kondimana na ngai+Mpe makundoli na ngai oyo nakoteya bango,+Bana na bango mpe, mpo na libela,+Bakofanda na kiti na yo ya bokonzi.”+ 13  Yehova aponá Siona;+Ayoká mposa na yango makasi mpo ezala esika na ye ya kofanda:+ 14  “Oyo nde esika na ngai ya kopema mpo na seko;+Nakofanda awa, mpo nayoki mposa na yango makasi.+ 15  Nakopambola mpenza biloko na yango ya kolya.+Nakotondisa babola na yango na mampa.+ 16  Mpe nakolatisa banganga-nzambe na yango lobiko;+Mpe bato na yango ya sembo bakoganga mpenza na esengo. 17  Kuna nakokolisa liseke ya Davidi.+Nalɛngɛli mwinda mpo na moto na ngai oyo atyami mafuta.+ 18  Nakolatisa banguna na ye nsɔni;+Kasi ye, motole+ na ye ekongɛnga.”+

Maloba na nse