Nzembo 131:1-3
Loyembo ya ntango ya komata. Ya Davidi.
131 Ee Yehova, motema na ngai ezalaki na lolendo te,+Miso na ngai emitombolaki mpe te;+Natambolaki mpe na makambo mineneminene te,+Mpe na makambo oyo eleki ngai te.+
2 Ya solo nabɔndisaki molimo na ngai mpe nafandisaki yango kimya+Lokola mwana oyo akilisami mabɛlɛ oyo mama na ye amemi.+Molimo na ngai ezali lokola mwana oyo akilisami mabɛlɛ.+
3 Yisraele azela Yehova+Banda sikoyo mpe mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+