Nzembo 130:1-8

Loyembo ya ntango ya komata. 130  Ee Yehova, uta na bisika ya bozindo nabeleli yo.+   Ee Yehova, yoká mongongo na ngai.+Litoi na yo etya likebi na mongongo ya malɔmbɔ na ngai.+   Soki otalaka kaka mabunga, Ee Yah,+Ee Yehova, nani akotɛlɛma?+   Mpo yo olimbisaka mpenza,+Mpo bábanga yo.+   Ee Yehova, natye elikya, molimo na ngai etye elikya,+Mpe nazeli liloba na ye.+   Molimo na ngai ezeli Yehova+Koleka ndenge basinzili oyo bazelaka ntɔngɔ,+Bazali kozela ntɔngɔ.+   Yisraele akoba kozela Yehova.+Mpo Yehova azali na motema boboto,+Mpe atondi na nguya ya kosikola.+   Mpe ye moko akosikola Yisraele na mabunga na ye nyonso.+

Maloba na nse