Nzembo 13:1-6
Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.
13 Ee Yehova, kino ntango nini okobosana ngai?+ Libela?+Kino ntango nini okobombela ngai elongi na yo?+
2 Kino ntango nini molimo na ngai ekobunda,Motema na ngai ekozala na mawa mokolo mobimba?Kino ntango nini monguna na ngai akomonela ngai?+
3 Talá ngai; yanolá ngai, Ee Yehova Nzambe na ngai.Ngɛngisá miso na ngai,+ mpo nalala na kati ya liwa te,+
4 Mpo monguna na ngai aloba te ete: “Nalongi ye!”Mpo banguna na ngai bázala na esengo te mpo nazali kotengatenga.+
5 Ngai natye motema na motema boboto na yo;+Tiká motema na ngai ezala na esengo na lobiko na yo.+
6 Nakoyembela Yehova, mpo ye apesi ngai mbano.+