Nzembo 129:1-8
Loyembo ya ntango ya komata.
129 “Bazali banguna na ngai mwa kala, banda bolenge na ngai,”+Sikoyo Yisraele aloba:+
2 “Bazali banguna na ngai mwa kala, banda bolenge na ngai;+Kasi balongá ngai te.+
3 Bato oyo batimolaka mabele batimoli na mokɔngɔ na ngai;+Bayeisi banzela ya mikala na bango milai.”
4 Yehova azali moyengebene.+Akatikati bansinga ya bato mabe.+
5 Bakoyoka nsɔni mpe bakozonga nsima,+Baoyo nyonso bazali koyina Siona.+
6 Bakokóma lokola matiti oyo ebimaka na bansamba,+Oyo ekauki liboso elongolama,+
7 Oyo moto oyo abukaka mbuma atondisá lobɔkɔ na ye na yango te,+Moto moko te oyo azali kokangisa maboke ya matiti atondisá ntolo na ye.
8 Mpe baleki-nzela balobá te ete:“Lipamboli ya Yehova ezala likoló na bino.+Topamboli bino na nkombo ya Yehova.”+