Nzembo 128:1-6
Loyembo ya ntango ya komata.
128 Esengo na moto nyonso oyo azali kobanga Yehova,+Oyo azali kotambola na banzela na ye.+
2 Mpo okolya mbuma ya mosala makasi ya mabɔkɔ na yo.+Okozala na esengo mpe makambo na yo ekotambola malamu.+
3 Mwasi na yo akozala lokola nzete ya vinyo oyo ebotaka mingi+Na kati mpenza ya ndako na yo.Bana na yo bakozala lokola bana-nzete ya olive+ zingazinga ya mesa na yo.
4 Talá! Ndenge wana nde mobali makasi akopambwama,+Ye oyo abangaka Yehova.+
5 Yehova akopambola yo uta na Siona.+Mpe moná bolamu ya Yerusaleme mikolo nyonso ya bomoi na yo,+
6 Mpe moná bana ya bana na yo.+Kimya ezala na Yisraele.+